Makamwisi ekoki mpenza kosalema?—Ntembe misato bato babimisaka
NTEMBE 1: Makamwisi ekoki kosalema te mpo ebukaka mibeko oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́. Toyebi mibeko oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́ mpo na makambo oyo bato ya siansi bamoni na mokili. Kasi, mibeko yango ekokani na mibeko ya gramɛrɛ ya monɔkɔ moko boye, ekoki kozala na makambo mosusu oyo elandaka mibeko yango te. Kutu, mbala mosusu tokoki te koyeba “mibeko” yango nyonso. (Yobo 38:4) Moto moko ya siansi akoki kolekisa bomoi na ye mobimba na koyekola mobeko moko oyo ezali kotambwisa molɔ́ngɔ́. Kasi, soki amoni “mwa likambo moko oyo eyokani te na mobeko yango,” yango ekotinda ye azongela lisusu makambo nyonso oyo ayebaki mpo na mobeko yango. Ndenge kaka bato balobaka, likambo moko ya mabe ekoki kobebisa makambo nyonso.
Lisolo moko ya kosɛkisa emonisi ete ezalaka mpasi te makanisi ya moto euta na likambo oyo ayebi yango malamumalamu te. John Locke (1632-1704) abɛtaki lisolo ya ambasadɛrɛ ya Allemagne ná mokonzi ya Siam (Thaïlande), alobaki boye: Ntango azalaki kolobela ekólo na ye Hollande epai ya mokonzi, ambasadɛrɛ alobaki ete na bileko mosusu, ezalaki kosalema ete nzoku atambola likoló ya mai. Mokonzi aboyaki kondima likanisi yango mpe amonaki ete ambasadɛrɛ akosi ye. Nzokande, ambasadɛrɛ azalaki koyebisa mokonzi likambo oyo mokonzi akutaná na yango naino te. Mokonzi ayebaki te ete ntango mai ekómi malili makasi mpe ekómi libanga ya glasi, ata nzoku ekoki kotambola likoló na yango. Mokonzi amonaki ete likambo ya ndenge wana ekoki kosalema te mpo ayebaki makambo nyonso te.
Tótalela mwa makambo oyo esalemi mikolo oyo, oyo mwa bambula eleki, bato bazalaki kokanisa ete ekoki kosalema te:
● Aviɔ moko ekoki komema bato koleka 800 kozanga ete ekita, kolongwa engumba New York tii Singapour, na vitɛsi ya kilomɛtrɛ 900 na ngonga moko.
● Makita na nzela ya video ekoki kosalisa bato oyo bafandi na bakɔntina ndenge na ndenge básolola lokola nde bafandi mesa moko.
● Moto akoki kokɔtisa ebele mpenza ya banzembo na mwa aparɛyi ya moke mpenza koleka pakɛ ya alimɛti.
● Monganga oyo asalaka lipaso akoki kolongola motema oyo ebebi mpe kotya mosusu na nzoto ya moto ata mpe biteni mosusu ya nzoto.
Makambo wana nyonso ekoki kotinda biso tóloba boye: Soki bato bakoki kosala makambo oyo na bambula oyo eleki ezalaki komonana lokola ekoki kosalema te, boye, Nzambe oyo akelá molɔ́ngɔ́ mpe biloko nyonso oyo ezali na kati na yango akoki kosala makambo minene oyo tokoki te koyeba yango malamumalamu to komekola yango sikoyo.a—Ebandeli 18:14; Matai 19:26.
NTEMBE 2: Biblia elobelaka makamwisi mpo na kotinda bato bázala na kondima. Biblia esɛngi biso te ete tóndima makamwisi nyonso. Elobi mpe te ete tóboya kondima makamwisi nyonso. Biblia ekebisi biso ete tóndima te makamwisi mpe misala ya nguya bindimela. Talá likebisi oyo ya polele: “Mobebisi wana akoya na nguya ya Satan, akosala makamwisi pe makambo ya lokuta ya ndenge na ndenge. Akosala mabe ya ndenge nyonso mpo na kokosa bato.”—2 Ba-tesalonisien 2:9, 10, Bible na lingala ya lelo oyo.
Yesu Kristo akebisaki mpe ete bato mingi bakoloba ete bazali bayekoli na ye, kasi bakozala te bayekoli na ye ya solosolo. Bamosusu kutu bakoloba na ye boye: “Mokonzi, Mokonzi, oyebi té? Na kombo na yo tosakolaki maloba euti na [elimo] ya Nzambe. Na kombo na yo tolongolaki [bilimo] mabe. Na kombo na yo tosalaki makamwisi ebele. Boye té?” (Matié 7:22, Bible na lingala ya lelo oyo) Kasi, Yesu alobaki ete akowangana bato yango. (Matai 7:23) Emonani polele ete Yesu ateyaki te ete makamwisi nyonso eutaka na Nzambe.
Nzambe alobi te ete kondima ya basambeli na ye esengeli kouta kaka na makamwisi. Kutu, kondima na bango esengeli kouta na makambo mpenza oyo endimisi bango.—Baebre 11:1.
Na ndakisa, tótalela naino lisekwa ya Yesu, oyo bato mingi bayebi, oyo ezali moko ya makamwisi oyo Biblia elobeli. Bambula mingi nsima ya likambo yango, bakristo mosusu ya Korinti bakómaki kotya ntembe mpo na lisekwa ya Yesu. Ndenge nini ntoma Paulo asalisaki bakristo yango? Alobaki nde na bango ete “bózala na kondima mingi”? Te. Talá ndenge oyo akundwelaki bango makambo oyo esalemaki mpenza. Alobaki ete Yesu “akundamaki, ɛɛ, . . . alamukaki na mokolo ya misato na kotalela Makomami; mpe ete abimelaki Kefa, mpe na nsima bantoma zomi na mibale. Na nsima na yango, abimelaki bandeko koleka nkama mitano (500) na mbala moko, oyo mingi na bango bazali tii sikoyo.”—1 Bakorinti 15:4-8.
Ezalaki mpenza na ntina ete bakristo yango bándima likamwisi yango? Paulo abakisaki boye: “Soki Kristo alamukaki te, mosala na biso ya kosakola ezali mpenza mpamba, mpe kondima na biso ezali mpamba.” (1 Bakorinti 15:14) Paulo azwaki likambo yango na lisɛki te. Ata soki mpo na bato mosusu likamwisi ya lisekwa ya Yesu ezalaki solo to te! Paulo ayebaki ete ezalaki solo mpo bato mingi oyo bamonaki likambo yango na miso bazalaki naino na bomoi na ntango wana. Kutu, bato yango bandimaki ata kokufa na esika ya kowangana makambo oyo bamonaki.—1 Bakorinti 15:17-19.
NTEMBE 3: Makamwisi ezali kaka biloko oyo tomonaka, oyo bato batángá te bayebaka mpenza te. Bato mosusu ya mayele balobaka ete makamwisi oyo Biblia elobeli ezali kaka makambo oyo esalamaka yango moko kozanga ete Nzambe atya lobɔkɔ. Bamonaka ete yango etindaka bato bándima lisusu masolo ya Biblia. Atako ezali solo ete makambo oyo tomonaka ekoki kozala na boyokani na makamwisi mosusu, na ndakisa makambo lokola koningana ya mabele, malɔzi, mpe kobukana ya mabele; bandimbola nyonso oyo bato yango bapesi eyokani na likambo moko. Bandimaka te ete makamwisi yango esalemaki na ntango mpenza oyo Makomami elobeli yango.
Na ndakisa, bamosusu balobaka ete bolɔzi ya liboso oyo mai ya Ebale Nile ebongwanaki makila na Ezipito, esalamaki bongo mpo na mabele ya motane oyo enyangwanaki na ebale yango mpe mpo na mwa banyama mikemike ya motane. Nzokande, na Biblia, lisolo yango elobi ete ebale ebongwanaki nde makila, kasi te mabele ya motane. Soki totángi na likebi mpenza Kobima 7:14-21, tokomona ete likamwisi yango esalemaki na ntango Arona, na litambwisi ya Moize, abɛtaki nzete na ye na Ebale Nile. Ata soki ebale yango ebongwanaki mpo na makambo oyo ezalaka, ntango mpenza oyo Arona abɛtaki nzete na ebale yango, ezali likamwisi!
Ndakisa mosusu oyo emonisi ntina ya ntango oyo makamwisi esalemaki, ezali oyo esalemaki ntango ekólo Yisraele elingaki kokɔta na Mokili ya Ndaka. Nzela oyo basengelaki koleka ekangamaki mpo mai ya Ebale Yordani etondaki makasi. Biblia eyebisi biso likambo oyo esalemaki na nsima, elobi boye: “Ntango baoyo bazalaki komema Sanduku bakómaki na Yordani mpe makolo ya banganga-nzambe oyo bamemaki Sanduku yango ekɔtaki na ebandeli ya mai . . . , mai oyo ezalaki kouta na likoló ebandaki kotɛlɛma esika moko. Emataki lokola efelo, mosika mpenza na Adama.” (Yosua 3:15, 16) Yango esalemaki nde mpo mabele eninganaki to ebukanaki? Lisolo yango elobeli yango te. Kasi, ntango mpenza oyo likambo yango esalemaki, ezalaki likamwisi. Esalemaki mpenza na ntango oyo Yehova alobaki ete ekosalema.—Yosua 3:7, 8, 13.
Na yango, makambo ya ndenge wana ezali makamwisi te? Biblia elobi ete ezali makamwisi. Na kotalela oyo Biblia eyebisi biso, makambo wana nyonso ekoki te kosalema kaka yango moko. Boye, tokoki mpenza koloba ete makambo yango ekoki te kosalema kaka mpo esalemaka te mikolo nyonso?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Soki ondimaka te ete Nzambe azali, talá mwa buku Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na biso? mpe mwa buku La vie a-t-elle été créée? to tuná moto oyo apesi yo zulunalo oyo mpo na koyeba makambo mosusu.
[Elilingi na lokasa 5]
Na bambula oyo eleká, bato mingi bakokaki te kokanisa ete ekoki kosalema ete bato bátambola na aviɔ bakilomɛtrɛ ebele na ngonga moko