Osengeli nde kondima makamwisi oyo Biblia elobeli?
SOKI moto moko abɛtɛli yo lisolo moko ya kokamwa, ndenge oyo moto yango azalaka ekoki kotinda yo ondima lisolo yango to oboya. Okotyela moto yango motema kaka te mpo na ndenge oyo azali kobɛta lisolo yango, kasi mpe soki ayebani lokola moto oyo alobaka solo. Kutu, soki moto yango alobaka na yo kaka makambo ya solo bambula mingi mpe atikalá kokosa yo ata mokolo moko te, na ntembe te, okondima mpe makambo oyo azali koyebisa yo sikoyo.
Ezali mpe bongo mpo na makamwisi oyo Biblia elobeli. Ata moto moko te kati na biso azalaki ntango makambo yango esalemaki. Kasi, mpo na kondima masolo oyo ezali na Biblia esengeli koyeba soki makambo yango esalamaki mpenza. Ndenge nini? Talá mwa makambo oyo emonisi ete ebongi kondima makamwisi oyo elobelami na masolo ya Biblia:
Makamwisi mingi esalemaki na bisika oyo bato bazalaki mingi. Na bantango mosusu, bankoto ya bato ata mpe bamilio na bango bamonaki makamwisi yango. (Kobima 14:21-31; 19:16-19) Ezalaki kosalema na kobombana te mpe bato mingi bamonaki yango.
Makamwisi yango esalemaki na ndenge ya mindɔndɔ te. Bato oyo bazalaki kosala makamwisi yango, bazalaki te kosalela biloko moko boye to mpo bato nyonso bámona bango, mpe ezalaki te kosalema na ndenge ya kokosa bato. Mbala mingi, bato oyo basalaki makamwisi oyo Biblia elobeli, basalaki yango kozanga ete bábongisa yango liboso mpe basalaki yango mpo na kosunga baoyo basengaki lisalisi. (Marko 5:25-29; Luka 7:11-16) Na bantango ya ndenge wana, moto oyo azalaki kosala likamwisi amibongisaki te liboso mpo na kosala yango.
Bato oyo bazalaki kosala makamwisi, basalaki yango te mpo na koluka koyebana, kozwa lokumu mpe bomɛngo. Kasi, ezalaki nde mpo na kopesa Nzambe lokumu. (Yoane 11:1-4, 15, 40) Epekisamaki ete moto asalela nguya ya kosala makamwisi mpo na koluka kozwa bomɛngo.—2 Bakonzi 5:15, 16, 20, 25-27; Misala 8:18-23.
Makamwisi ndenge na ndenge oyo Biblia elobeli emonisi ete ekokaki te kosalema na nguya ya moto ye moko. Na ndakisa, mbu mpe mipɛpɛ efandaki nyɛɛ, mai ebongwanaki vinyo, mbula etikaki kobɛta mpe ebɛtaki lisusu, bato ya maladi babikisamaki, mpe baoyo bakufá miso bamonaki lisusu. Makamwisi nyonso wana mpe mingi mosusu oyo esalemaki emonisi ete nguya moko oyo eleki mosika nguya ya bato nde esalaki makambo wana nyonso.—1 Bakonzi 17:1-7; 18:41-45; Matai 8:24-27; Luka 17:11-19; Yoane 2:1-11; 9:1-7.
Batɛmɛli oyo bamonaki makamwisi yango batyaki ntembe te. Ntango Yesu asekwisaki moninga na ye Lazare, bakonzi ya mangomba oyo bazalaki banguna ya Yesu batyaki ntembe te ete Lazare akufaki. Ndenge nini bakokaki kotya ntembe? Mikolo minei elekaki bandá bakundaki Lazare. (Yoane 11:45-48; 12:9-11) Kutu, ata bankama ya bambula na nsima ya liwa ya Yesu, bato oyo bakomaki Talmud, buku ya mibeko ya Bayuda, bakobaki kondima ete Yesu azalaki na nguya ya kosala makamwisi. Bazalaki nde kotyela esika oyo nguya yango ezalaki kouta ntembe. Ndenge moko mpe, ntango bamemaki bayekoli ya Yesu liboso ya esambiselo ya Bayuda, batunaki bango te ete “bosalaki likamwisi?” Kasi, batunaki nde bango ete: “Na nguya nini to na nkombo ya nani bosali likambo oyo?”—Misala 4:1-13.
Boye, ondimi makambo oyo Biblia eyebisi biso mpo na makamwisi? Kaka mwa makambo oyo touti kotalela emonisi polele ete masolo ya makamwisi oyo Biblia elobeli ebongi mpenza kotyelama motema. Ezali mpe na bantina mosusu oyo tosengeli kotyela masolo oyo Biblia elobeli motema. Na ndakisa, ntango Biblia elobeli likambo moko, mbala mingi eyebisaka biso ntango, esika mpe nkombo ya bato oyo balobelami na lisolo yango. Ata baoyo bandimaka Biblia te bakamwaki ndenge Biblia elobeli likambo mokomoko na bosikisiki. Bisakweli mingi ya Biblia ekokisamaki, ata na makambo mikemike oyo bisakweli yango elobaki. Longola yango, Biblia ezali na batoli mingi oyo ekoki kosalisa bato bázala na boyokani malamu—batoli oyo esalisi bato ya mbula nyonso, ezala bazwi to babola. Mpo na oyo etali kozala na boyokani malamu ná basusu, toli ya Biblia eleki mosika batoli mosusu nyonso.
Soki otyelaka mpenza te Biblia motema, mpo na nini te kozwa ntango ya kotalela yango lisusu malamumalamu? Ntango okobanda koyeba yango malamu, okokóma kotyela yango lisusu motema koleka. (Yoane 17:17) Okomona ete okoki kondima makamwisi oyo yango elobi ete esalemaki na ntango ya kala. Soki ondimi masolo yango, ekozala mpe mpasi te ondima makambo oyo Biblia elobi ete ekosalema mosika te.
[Elilingi na lokasa 7]
Bato oyo bazalaki kotɛmɛla Yesu batyaki ntembe te ete Lazare akufaki