Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/9 lok. 22
  • Oyebaki yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyebaki yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Alobaki mpo na libota ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Alobaki mpo na ekólo ya Nzambe
    Mekolá kondima na bango
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/9 lok. 22

Oyebaki yango?

Ndenge nini bazalaki kotinda mikanda na ntango ya kala?

Momemi-mikanda moko ya Perse

Momemi-mikanda moko ya Perse

Mokumba ya kotinda mikanda ya guvɛrnema ya Perse epesamaki na mabɔkɔ ya Leta, na mosala na yango ya posita. Mokanda ya Estere elobeli ndenge oyo guvɛrnema ya Perse ezalaki kotambwisama: “[Mordekai] akomaki na nkombo ya Mokonzi Ahasueruse mpe atyaki yango kashɛ na lopɛtɛ ya kotya bilembo ya mokonzi, mpe atindaki mikanda na mabɔkɔ ya bamemi-mikanda na bampunda oyo bazalaki kotambwisa bampunda ya posita oyo ezalaki kosalelama na mosala ya mokonzi, bana ya bampunda ya basi ya mbangu makasi.” (Estere 8:10) Leta mpe mampinga ya Ampire ya Roma ezalaki mpe kosalela mayele yango mpo na kotinda mikanda.

Mikanda ya bato bango moko, na ndakisa oyo ntoma Paulo to bato mosusu bakomaki, ekokaki kotindama na nzela wana te. Bato oyo bazalaki bazwi bazalaki kosalela baombo na bango mpo na kotinda mikanda. Kasi bato mingi bazalaki kotinda mikanda na nzela ya bato oyo bayebanaki na bango, ata mpe bapaya, oyo bazalaki kokende na mboka oyo batindi mikanda yango. Bato ya libota, baninga, basoda to bato ya mimbongo bazalaki mpe komema mikanda. Likambo ya ntina ezalaki ya koyeba soki moto oyo amemi mokanda yango abongi kotyelama motema mpe soki akokómisa yango malamu. Biblia emonisi ete Paulo atindaki mikanda na ye mosusu na nzela ya bakristo mosusu oyo bazalaki kosala mibembo.​—Baefese 6:21, 22; Bakolose 4:7.

Ndenge nini bazalaki kosomba mpe kotɛka biloko na Yisraele?

Liyemi ya zando ya bambuma

Liyemi ya zando ya bambuma

Nkita ya ekoló Yisraele ezalaki kouta libosoliboso na mosala ya bilanga, ya kobɔkɔla bibwele, mpe ya kosombitinya biloko. Biblia elobeli bazando oyo ezalaki na baporte ya engumba: “Porte ya Bampate,” “Porte ya Mbisi” mpe “Porte ya Bipaso.” (Nehemia 3:1, 3; Yirimia 19:2) Bankombo yango emonisi biloko oyo bazalaki kotɛka na bisika wana. Makomami elobeli mpe “balabala ya basali-mampa” na Yerusaleme, mpe biloko mosusu oyo bazalaki kotɛka to kosomba.​—Yirimia 37:21.

Ezali boni mpo na ntalo ya biloko? Buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia elobi boye: “Ntalo ya biloko ezalaki komata na boumeli ya bambula mpe ezali mpasi koloba na bosikisiki soki eloko boye ezalaki ntalo boni na ntango boye mpe na esika boye.” Atako bongo, masolo ya mikanda ya kala, ata mpe oyo ya Biblia, emonisi ete ata na ntango wana, ntalo ya biloko ezalaki mpe komata. Na ndakisa, mombongo ya kotɛka baombo ezalaki kosalema mingi. Batɛkaki Yozefe na shekele ya palata 20, yango ekokaki kozala ntalo oyo bazalaki kotɛka na yango moombo na boumeli ya siɛklɛ ya 18 liboso ya ntango na biso. (Ebandeli 37:28) Siɛklɛ misato na nsima, ntalo yango ekómaki shekele 30. (Kobima 21:32) Na siɛklɛ ya mwambe liboso ya ntango na biso, ntalo yango ekómaki shekele 50. (2 Bakonzi 15:20) Siɛklɛ mibale na nsima, na boumeli ya boyangeli ya Baperse, ntalo yango ekómaki tii na shekele 90 to koleka. Emonani ete komata ya ntalo ya biloko ebandi lelo te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto