Pusaná penepene na Nzambe
“Bikólo bakoyeba mpenza ete nazali Yehova”
OKOYOKA ndenge nini soki bafundi yo na likambo moko ya mabe oyo osali te? Ezali boni soki likambo yango ememeli basusu mpasi mingi, ata mpe baoyo basali eloko te? Na ntembe te, okoluka komonisa ete bakoseli yo makambo! Oyebi ete bakoselaka mpe Yehova makambo ndenge wana? Lelo oyo bato mingi bazali kopesa Nzambe foti kaka mpamba mpo na makambo ya kozanga bosembo mpe mpasi oyo ezali na mokili. Yehova azali kokana kolongola nsɔni na nkombo na ye? Ɛɛ, ezali bongo! Tótala oyo elobami na mokanda ya Ezekiele.—Tángá Ezekiele 39:7.
Yehova alobi boye: “Nakotika lisusu te ete bákómisa nkombo na ngai mosantu eloko mpamba.” Ntango bato bapesaka ye foti mpo na makambo ya kozanga bosembo, bakómisaka nkombo na ye mpamba. Ndenge nini? Na Biblia, mbala mingi “nkombo” emonisaka lokumu ya moto. Buku moko elobi ete nkombo ya Nzambe emonisi “makambo oyo toyebi na ntina na ye—makambo oyo alobi mpo na ye moko; emonisaka mpe nkembo mpe lokumu na ye.” Nkombo ya Yehova etali mpe lokumu na ye. Ndenge nini Yehova atalelaka kozanga bosembo? Ayinaka yango! Ayokelaka mpe bato oyo bazali konyokwama mpo na kozanga bosembo mawa.a (Kobima 22:22-24) Ntango bato balobaka ete Nzambe nde abimisaka makambo ya mabe, nzokande ezali makambo oyo ye ayinaka mpenza, babebisaka lokumu na ye. Na ndenge yango, bazali ‘kozanga limemya mpo na nkombo na ye.’—Nzembo 74:10.
Simbá ete mbala mibale mobimba Yehova asaleli maloba “nkombo na ngai mosantu.” (Vɛrsɛ 7) Na Biblia, mbala mingi nkombo ya Yehova etambolaka nzela moko na maloba “mosantu” mpe “bosantu.” Liloba “mosantu” epesaka likanisi ya kokabwana; emonisaka mpe bopɛto. Nkombo ya Yehova ezali mosantu mpamba te Nzambe oyo abengami na nkombo yango azali Mosantu, elingi koloba akabwani mpenza na eloko nyonso oyo ezali lisumu mpe mbindo. Omoni ntina oyo baoyo bapesaka Yehova foti mpo na makambo ya mabe basambwisaka ‘nkombo na ye mosantu’ na ndenge ya mabe koleka?
Mokano ya Yehova ya kopɛtola nkombo na ye na nzela ya Bokonzi na ye ezali motó ya likambo ya Biblia. Mokanda ya Ezekiele elobeli mingi motó ya likambo yango, oyo ezongeli mbala na mbala maloba “bikólo ekoyeba mpenza ete nazali Yehova.” (Ezekiele 36:23; 37:28; 38:23; 39:7) Simbá ete ezali te likambo ya bikólo epona koyeba Yehova to te. Bikólo “ekoyeba mpenza.” Na maloba mosusu, Yehova akani kosala likambo moko oyo ekotinda bikólo nyonso ya mabele eyeba ete ye azali Yehova, Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, oyo nkombo na ye ezali mosantu mpe pɛto.
Elaka oyo ezongelami mbala na mbala ete “bikólo ekoyeba mpenza ete nazali Yehova” ezali nsango malamu mpo na baoyo bazali na mposa makasi ya komona nsuka ya makambo ya kozanga bosembo mpe bampasi. Mosika te, Yehova akokokisa elaka yango mpe akopɛtola nkombo na ye na makambo nyonso oyo esambwisi yango. Akolongola mabe mpe baoyo basalaka yango, kasi, akobikisa baoyo bayebi nkombo na ye, bazali komemya yango, mpe bayebi ndimbola na yango. (Masese 18:10) Yango etindi yo oluka koyeba ndenge oyo okoki kopusana penepene na Yehova, Nzambe mosantu, oyo “alingaka bosembo”?—Nzembo 37:9-11, 28.
Botángi ya Biblia mpo na sanza ya Sɛtɛmbɛ:
a Talá lisolo “Pusaná penepene na Nzambe—Alingaka bosembo,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 2008.