Etanda ya makambo ezali na kati
15/02/2013
© 2013 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania. All rights reserved.
NIMERO YA BOYEKOLI
1-7 SANZA YA MINEI 2013
Yango nde libula na biso ya elimo
LOKASA 3 • NZEMBO: 69, 28
8-14 SANZA YA MINEI 2013
Ozwaka libula na biso ya elimo na motuya?
LOKASA 8 • NZEMBO: 22, 75
15-21 SANZA YA MINEI 2013
Tikalá na kati ya lobwaku ya libateli ya Yehova
LOKASA 17 • NZEMBO: 133, 16
22-28 SANZA YA MINEI 2013
Kotika eloko moko te epekisa yo ozwa nkembo
LOKASA 25 • NZEMBO: 15, 61
MASOLO YA BOYEKOLI
▪ Yango nde libula na biso ya elimo
▪ Ozwaka libula na biso ya elimo na motuya?
Masolo yango elobeli makambo ya minene oyo ezali na kati ya libula ya elimo ya basaleli ya Yehova. Emonisi ndenge oyo Nzambe abatelaki Liloba na ye, apambolaki bato oyo basalelaki nkombo na ye, mpe asɛnzɛlaki ete mateya na ye ya solo ebatelama mpe mateya ya mangomba ya lokuta ebebisa yango te.
▪ Tikalá na kati ya lobwaku ya libateli ya Yehova
Lisolo oyo elimboli lobwaku ya libateli oyo mokanda ya Zekaria 14:4 elobeli, mpe emonisi ntina oyo tosengeli kotikala na kati ya lobwaku yango. Emonisi mpe soki mai ya bomoi oyo mokanda ya Zekaria 14:8 elobeli ezali nini, mpe soki komɛla mai yango elimboli nini mpo na biso.
▪ Kotika eloko moko te epekisa yo ozwa nkembo
Lisolo oyo emonisi ndenge oyo tokoki kozwa nkembo oyo Yehova apesaka bato. Elimboli mpe makambo oyo ekoki kopekisa biso tózwa nkembo yango mpe ndenge oyo tokoki kosalisa basusu soki tokobi koluka kozwa nkembo yango.
MASOLO MOSUSU
13 Bakɛngɛli ya Mokonzi bazwi litatoli
22 Kebá na mikano ya motema na yo
30 Azalaki moto ya libota ya Kaifa
EZIPELI: Mosakoli moko na nɔrdi-ɛsti ya Namibie azali kopesa litatoli na mwasi moko ya Himba. Mwasi yango ya Himba azali moto ya ekólo moko ya bato oyo bafandaka esika moko te, bapakolaka ngola na nsuki mpe na nzoto mobimba
NAMIBIE
MOTÁNGO YA BATO
2 373 000
BASAKOLI
2 040
BOYEKOLI YA BIBLIA
4 192