Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w13 1/12 lok. 3
  • Mpo na nini komituna motuna wana?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini komituna motuna wana?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini okoki kosolola na moto oyo andimaka Nzambe te?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Ezali na ntina ozala mondimi ya lingomba moko boye?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
w13 1/12 lok. 3

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | TOZALI NA MPOSA YA NZAMBE?

Mpo na nini komituna motuna wana?

Bato moko oyo bandimaka te ete Nzambe azali basalaki pankarte moko oyo ezali na maloba oyo: “Yo mpe ondimaka te ete Nzambe azalaka? Bamilio ya bato mpe bakanisaka bongo.” Emonani ete bato yango bazali na mposa ya Nzambe te.

Nzokande, bato mingi oyo balobaka ete bandimelaka Nzambe basalaka makambo lokola nde Nzambe azalaka te. Salvatore Fisichella, episkɔpɔ-mokonzi na Lingomba ya Katolike alobaki boye mpo na bandimi ya eglize na ye: “Bizaleli na biso emonisaka kutu te ete tozali bakristo mpo tokeseni te na bapakano.”

Bamosusu bazalaka kutu na ntango te ya kokanisa Nzambe. Bamonaka ete azali mosika mpenza mpe akoki kosala eloko moko te na bomoi na bango. Bato ya ndenge wana balukaka Nzambe kaka na ntango ya mpasi to ntango bazali na mposa ya eloko​—lokola nde Nzambe azali moto na bango ya mosala.

Bamosusu basalelaka te makambo oyo mangomba na bango eteyaka, ntango mosusu mpo bamonaka ntina na yango te. Na ndakisa, mpo na bandimi mingi ya Lingomba ya Katolike (76%) na Allemagne, ezali mabe te mwasi ná mobali báfanda esika moko liboso bábalana; nzokande ezala Lingomba na bango to Biblia eteyaka bongo te. (1 Bakorinti 6:18; Baebre 13:4) Kaka bandimi ya Lingomba ya Katolike te nde basalaka bongo. Bakonzi ya mangomba mingi mpe bamitungisaka ndenge bandimi ya mangomba na bango bamitambwisaka lokola “bato oyo bandimaka te ete Nzambe azali.”

Na yango, bandakisa oyo ekoki kotinda biso tómituna boye: Tozali mpenza na mposa ya Nzambe? Motuna yango ezali likambo ya sika te. Elobelamaki mpo na mbala ya liboso na mokanda ya liboso ya Biblia. Mpo na kozwa eyano na motuna yango, tótala naino mwa makambo mosusu oyo elobelami na mokanda yango ya Ebandeli.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto