Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w14 1/8 lok. 16
  • Biyano na mituna ya Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini okoki koyeba lingomba ya solo?
    Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
  • Nsango malamu mpo na mangomba ezali nini?
    Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
  • Ndenge nini okoki koyeba lingomba ya solo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Losambo oyo Nzambe andimaka
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
w14 1/8 lok. 16
Batatoli ya Yehova ya bikólo ndenge na ndenge bayanganaka elongo na Ndako ya Bokonzi

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Mangomba nyonso ekumisaka nzambe?

Na ntembe te, ntango olandaka bansango oyo ezali koleka na mokili omonaka ete ntango mosusu bato basalaka makambo ya mabe na nkombo ya lingomba. Mangomba nyonso te nde euti epai ya Nzambe ya solo. (Matai 7:15) Kutu, bato mingi bakosamá.​—Tángá 1 Yoane 5:19.

Ata bongo, Nzambe amonaka bato ya sembo oyo balingaka oyo ezali malamu mpe solo. (Yoane 4:23) Nzambe azali kobenga bato ya ndenge wana mpo báyekola solo ya Liloba na ye, Biblia.​—Tángá 1 Timote 2:3-5.

Ndenge nini okoki koyeba lingomba ya solo?

Yehova Nzambe azali kosangisa bato oyo bauti na mangomba ndenge na ndenge na ndenge azali koteya bango solo mpe koteya bango bálinganaka. (Mika 4:2, 3) Boye, okoki koyeba bandimi ya lingomba ya solo na bolingo oyo bamoniselanaka.​—Tángá Yoane 13:35.

Yehova Nzambe azali kosalela losambo ya solo mpo na kosangisa bato ya lolenge nyonso.​—Nzembo 133:1

Mateya ya bandimi ya lingomba ya solo eutaka na Biblia mpe basalelaka yango na bomoi na bango. (2 Timote 3:16) Bakumisaka mpe nkombo ya Nzambe. (Nzembo 83:18) Bateyaka ete Bokonzi ya Nzambe ezali elikya kaka moko mpo na bato. (Danyele 2:44) Basalelaka bato oyo bafandi na bango bolamu mpo balandaka ndakisa ya Yesu mpe na ndenge yango, batikaka ete ‘pole na bango engɛnga.’ (Matai 5:16) Na yango, bakristo ya solo bakoki koyebana na ndenge bakendaka kotala bato na bandako na bango mpo na kosakwela bango nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.​—Tángá Matai 24:14; Misala 5:42; 20:20.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 15 ya buku oyo: Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova

Okoki mpe kozwa yango na Internet na www.pr2711.com

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto