Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • fg liteya 10 mituna 1-4
  • Ndenge nini okoki koyeba lingomba ya solo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini okoki koyeba lingomba ya solo?
  • Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini okoki koyeba lingomba ya solo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Losambo oyo Nzambe andimaka
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Na ntina na losambo ya solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Lolenge nini okoki koyeba lingomba ya solo?
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
Makambo mosusu
Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
fg liteya 10 mituna 1-4

LITEYA 10

Ndenge nini okoki koyeba lingomba ya solo?

1. Lingomba ya solo ezali kaka moko?

Yesu azali koteya

“Bókeba na basakoli ya lokuta.”​—MATAI 7:15.

Yesu ateyaki bayekoli na ye lingomba kaka moko ya solo. Lingomba yango ezali lokola nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko. Yesu alobaki boye: ‘Bato oyo bazali komona nzela yango bazali moke.’ (Matai 7:14) Nzambe andimaka kaka lingomba oyo elandaka Liloba na ye, oyo ezali solo. Basambeli nyonso ya solosolo bazali na kondima moko.​—Tángá Yoane 4:23, 24; 14:6; Baefese 4:4, 5.

Talá video Nzambe andimaka mangomba nyonso?

2. Yesu alobaki nini mpo na bakristo ya lokuta?

Mokonzi moko ya lingomba azali koteya. Na nsima, akei kopambola bitumba.

“Balobaka polele ete bayebi Nzambe, kasi bazali kowangana ye na misala na bango.”​—TITO 1:16.

Yesu alobaki ete basakoli ya lokuta bakobebisa lisangá ya bokristo. Soki totaleli makambo kaka likolólikoló, ekoki komonana lokola ete bazali basambeli ya solosolo. Balobaka ete mangomba na bango ezali ya bokristo. Kasi, okoki koyeba bato ya ndenge wana na misala na bango. Ndenge nini? Kaka lingomba ya solo nde ebimisaka bakristo ya solo, oyo bayebanaka na bizaleli na bango mpe na makambo oyo basalaka.​—Tángá Matai 7:13-23.

3. Ndenge nini okoki koyeba basambeli ya solosolo?

Tótalela makambo mitano oyo elandi mpo na koyeba bango:

  • Basambeli ya solosolo bandimaka ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe. Basalaka makasi ete bátosa mibeko ya Biblia na bomoi na bango. Na yango, lingomba ya solo ekeseni na mangomba oyo eteyaka makanisi ya bato. (Matai 15:7-9) Basambeli ya solosolo basalelaka makambo oyo bateyaka.​—Tángá Yoane 17:17; 2 Timote 3:16, 17.

  • Mokristo azali kosala diskur oyo euti na Biblia. Na nsima, akei kosakola Bokonzi ya Nzambe, kosalisa bato bazwi likama, mpe mibange.

    Bayekoli ya solosolo ya Yesu bakumisaka nkombo ya Nzambe, Yehova. Yesu akumisaki nkombo ya Nzambe na ndenge alakisaki bato nkombo yango. Asalisaki bato báyeba Nzambe mpe ateyaki bango bábondelaka ete nkombo ya Nzambe esantisama. (Matai 6:9) Na esika oyo ofandi, lingomba nini eteyaka bato nkombo ya Nzambe?​—Tángá Yoane 17:26; Baroma 10:13, 14.

  • Bakristo ya solo bateyaka Bokonzi ya Nzambe. Nzambe atindaki Yesu asakola nsango ya Bokonzi. Bokonzi ya Nzambe ezali elikya kaka moko mpo na bato. Yesu akobaki kolobela yango tii na mokolo ya liwa na ye. (Luka 4:43; 8:1; 23:42, 43) Alobaki ete bayekoli na ye bakosakola mpe Bokonzi yango. Soki moto moko ayei koyebisa yo nsango ya Bokonzi ya Nzambe, okokanisa ete azali moto ya lingomba nini?​—Tángá Matai 24:14.

  • Bayekoli ya Yesu bazali te bato ya mokili oyo mabe. Okoki koyeba bango na ndenge baboyaka kokɔta na makambo ya politiki to na matata ya mboka. (Yoane 17:16; 18:36) Mpe lisusu, bamekolaka te bizaleli mpe misala ya mokili oyo mabe.​—Tángá Yakobo 4:4.

  • Bakristo ya solo balinganaka mpenza bango na bango. Liloba ya Nzambe eteyaka bango ete esengeli komemya bato ya bikólo nyonso. Atako mbala mingi mangomba ya lokuta ekɔtaka na bitumba ya bikólo, basambeli ya solosolo basalaka bongo te. (Mika 4:1-3) Kutu, bakristo ya solo basepelaka kosalela ntango mpe biloko na bango mpo na kosalisa mpe kolendisa basusu.​—Tángá Yoane 13:34, 35; 1 Yoane 4:20.

4. Okoki koyeba lingomba ya solo?

Lingomba nini mateya na yango nyonso eutaka na Liloba ya Nzambe, ememyaka nkombo ya Nzambe, mpe esakolaka ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa bampasi ya bato? Lingomba nini oyo bandimi na yango balinganaka mpe bakɔtaka na bitumba te? Okanisi nini?​—Tángá 1 Yoane 3:10-12.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 15 ya buku Makambo oyo Biblia eteyaka

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto