Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w15 1/8 nk. 3-4
  • Soki moto akufi akendaka wapi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Soki moto akufi akendaka wapi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bakufi bazalaka ndenge nini?
  • Lifelo ezali mpenza nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Lisekwa ekozala!
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Lifelo ezalaka mpenza? Na kotalela Biblia, lifelo ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Nyonso esukaka na liwa te!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
w15 1/8 nk. 3-4

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | MOTO AKOKI KOKOBA KOZALA NA BOMOI NSIMA YA LIWA?

Soki moto akufi akendaka wapi?

Mikóló mpe bana batɛlɛmi pembeni ya sanduku ya moyei na lilita

“Nazalaki kokanisa ete ezali na bisika misato oyo moto akoki kokende soki akufi: likoló, lifelo to epongelo. Nayebaki ete nabongaki te kokende likoló to na lifelo. Kasi, nayebaki mpenza te nini esalemaka na epongelo. Natikalá komona yango ata esika moko te na Biblia. Ezalaki kaka oyo bato balobaka.”​—Lionel.

“Bateyaki ngai ete bato nyonso bakendaka na likoló nsima ya liwa, kasi nandimaki yango te. Nazalaki kokanisa ete liwa ezali nsuka ya makambo nyonso; soki moto akufi, nyonso esili mpo na ye.”​—Fernando.

Osí omituná: ‘Soki moto akufi akendaka mpenza wapi? Bandeko to baninga na biso oyo bakufá banyokwamaka esika moko boye? Tokomona bango lisusu? Nini ekoki kondimisa biso yango?’ Tótalela oyo Biblia eteyaka mpenza. Tóbanda naino na kotalela soki Biblia ekokanisi liwa na nini. Na nsima, tokotalela elikya oyo Biblia, Liloba ya Nzambe epesi.

Bakufi bazalaka ndenge nini?

EYANO YA BIBLIA: “Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; kasi bakufi bayebi ata eloko moko te, bazali mpe na lifuti lisusu te, mpo bato babosani makambo oyo ekokaki kosala ete bákanisa bango. Nyonso oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na makasi na yo mpenza, mpo mosala ezali te, mwango te, boyebi te, bwanya mpe te na nkunda, esika ozali kokende.”a​—Mosakoli 9:5, 10.

Na mokuse, nkunda ezali esika oyo bato bakendaka soki bakufi; esika ya elilingi to esika oyo moto akanisaka lisusu te mpe asalaka ata mosala moko te. Yobo, moto ya sembo akanisaki ete nkunda ezali esika ya ndenge nini? Abungisaki biloko na ye nyonso mpe bana na ye na mokolo moko mpe abɛlaki maladi mabe ya babibɔ nzoto mobimba. Asɛngaki Nzambe boye: “Aa soki obombaka ngai ata na Nkunda [“lifelo,” Douay Version, Biblia ya Katolike] soki obombaka ngai.” (Yobo 1:13-19; 2:7; 14:13) Emonani polele ete Yobo akanisaki te ete nkunda ezali lifelo ya mɔtɔ, esika oyo alingaki kokende konyokwama lisusu koleka. Kutu, ayebaki ete ezali nde esika ya kopema.

Ezali na mwaye mosusu ya koyeba ndenge bakufi bazalaka. Tokoki kotalela masolo ya Biblia oyo elobeli bato mwambe oyo basekwaki.​—Talá etanda “Bato mwambe oyo basekwaki, oyo Biblia elobeli.”

Moko te na kati ya bato yango mwambe alobaki ete azalaki na esika moko ya bisengo to ya mpasi. Soki bato oyo basekwaki bautaki na esika moko ya ndenge wana, balingaki te kobɛtela basusu lisolo yango? Masolo yango elingaki te kozala na Biblia, buku oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu mpo bato nyonso báyeba yango? Biblia elobeli likambo moko te ya ndenge wana. Emonani polele ete bato wana nyonso mwambe bazalaki na likambo ya koloba te. Mpo na nini? Mpo bayebaki eloko moko te, kaka ndenge ezalaka soki moto alali mpɔngi makasi. Kutu, na bantango mosusu Biblia esalelaka liloba mpɔngi mpo na kolobela liwa. Na ndakisa, Davidi mpe Stefano, oyo bazalaki bato ya sembo ‘balalaki na kati ya liwa.’​—Misala 7:60; 13:36.

Kasi, elikya nini ezali mpo na bakufi? Bakoki kolamuka na mpɔngi yango?

a Na Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika, liloba ya Ebre “Sheol” mpe ya Grɛki “Hades” ebongolami na “nkunda.” Mabongoli mosusu ya Biblia esalelaka liloba “lifelo,” kasi liteya oyo elobaka ete bato banyokwamaka na lifelo nsima ya liwa euti na Biblia te.

BATO MWAMBE OYO BASEKWAKI, OYO BIBLIA ELOBELIb

Mwana ya mwasi oyo mobali akufá Mosakoli Eliya asekwisaki mwana ya mwasi moko oyo mobali akufá, oyo azalaki kofanda na Zarefate, na nɔrdi ya Yisraele.​—1 Bakonzi 17:17-24.

Mwana ya Moshuneme Elisha, oyo akómaki mosakoli na esika ya Eliya asekwisaki mwana mobali moko na engumba Shuneme mpe apesaki ye epai ya baboti na ye.​—2 Bakonzi 4:32-37.

Moto moko na esika bakundaka bibembe Babwakaki ebembe ya mobali moko oyo autaki kokufa esika oyo bakundaki Elisha. Ntango kaka ebembe ya moto yango etutaki mikuwa ya Elisha, moto yango asekwaki.​—2 Bakonzi 13:20, 21.

Mwana ya mwasi oyo mobali akufá ya mboka Naine Yesu atɛlɛmisaki bato oyo bazalaki kokende kokunda ebembe ya elenge mobali moko na libándá ya Naine, asekwisaki ye mpe apesaki ye epai ya mama na ye oyo azalaki na mawa makasi.​—Luka 7:11-15.

Mwana ya Yairuse Yairuse, mokambi moko ya sinagoga asɛngaki Yesu abikisa mwana na ye ya mwasi oyo azalaki kobɛla. Mwa moke nsima ya liwa ya mwana yango, Yesu asekwisaki ye.​—Luka 8:41, 42, 49-56.

Lazare, moninga ya motema ya Yesu Lazare asalaki mikolo minei na lilita ntango Yesu asekwisaki ye na miso ya bato ebele.​—Yoane 11:38-44.

Dorkasi Ntoma Petro asekwisaki mwasi yango oyo bato bazalaki kolinga mingi, oyo ayebanaki mpo na misala na ye ya malamu.​—Misala 9:36-42.

Etishe Ntoma Paulo asekwisaki elenge mobali Etishe oyo akufaki ntango akweaki na lininisa ya ndako moko ya etajɛ.​—Misala 20:7-12.

b Kasi, lisekwa oyo eleki ntina mingi ezali oyo ya Yesu Kristo, mpo ekeseni mpenza na oyo ya bato wana mwambe ndenge lisolo oyo elandi ekomonisa yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto