Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp16 No. 1 nk. 4-5
  • Kozanga bosembo etali moto nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kozanga bosembo etali moto nyonso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KOZANGA BOSEMBO EBEBISAKA KONFIANSE
  • KOZANGA BOSEMBO EBAKISAKA KOZANGA BOSEMBO
  • Nini etindaka bato bázanga bosembo?
    Lamuká!—2012
  • Bosembo ememelaka moto matomba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Ndenge nini kolonga ntembe ebimisami na bobola mpo na bizaleli malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
wp16 No. 1 nk. 4-5
Basi mibale oyo bazali kowelana na maloba

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | MPO NA NINI KOZALA SEMBO?

Kozanga bosembo etali moto nyonso

“Ezalaka ntango nyonso na makambo ya mpasi oyo esɛngaka mwa kozanga bosembo mpo solisyo ezwama.”​—Samantha, Afrika ya Sudi.

Ondimi likanisi yango? Ndenge moko na Samantha, na bantango mosusu biso nyonso tokutanaka na makambo ya mpasi. Ndenge oyo tosalaka ntango tokutani na makambo oyo esɛngi tózanga bosembo ekoki komonisa bizaleli nini ezalaka na ntina mpenza mpo na biso. Na ndakisa, soki tolingaka te lokumu na biso ekita, na ntembe te tokomona ete kozanga bosembo ezali mwaye mosusu ya kokokisa likambo moko boye. Kasi soki solo eyebani, mbala mingi kozanga bosembo ememaka mpasi. Tótalela makambo oyo elandi.

KOZANGA BOSEMBO EBEBISAKA KONFIANSE

Mpo bato báyokana malamu esɛngaka konfianse. Soki bato mibale bazali kotyelana motema, babangaka eloko te. Kasi yango eyaka kaka mbala moko boye te. Konfianse ekómaka makasi ntango bato bazali kolekisa ntango elongo, bazali kosolola na bosembo mpe bazali koluka kaka matomba na bango moko te. Kasi, kaka likambo moko mpamba ya kozanga bosembo ekoki kobebisa konfianse. Soki konfianse ebebi ezalaka mpasi mpo ezonga lisusu.

Esí bakosá yo na moto moko oyo okanisaki ete azalaki moninga malamu? Soki ɛɛ, esalaki yo ndenge nini? Na ntembe te oyokaki mpasi na motema, lokola nde atɛki yo. Komiyoka bongo ezali mabe te. Ya solo, kozanga bosembo ekoki kobebisa boyokani ya malamu oyo bato bazalaki na yango.

KOZANGA BOSEMBO EBAKISAKA KOZANGA BOSEMBO

Ankɛtɛ oyo Robert Innes, profesɛrɛ moko ya ekonomi na iniversite ya Californie asalaki emonisi ete “kozanga bosembo ezali lokola maladi oyo ezwaka bato ebele.” Na yango, tokoki kokokanisa kozanga bosembo na virisi; soki ozalaka mingi elongo na bato oyo bazangi bosembo, ekozala mpasi te ezaleli yango, oyo ekokani na “virisi” ezwa yo.

Ndenge nini okoki kokima motambo yango? Biblia ekoki kosalisa yo. Tosɛngi yo otalela mwa batoli ya Biblia oyo tokolobela na lisolo elandi.

Makambo mosusu ya kozanga bosembo

Kokosa

Mobali oyo azali kolongola lopɛtɛ ya libala

ELAKISI NINI? Elakisi koloba likambo moko ya lokuta epai ya moto oyo asengeli nde koyeba solo. Kokosa ekoki kosangisa makambo lokola kozanga koloba likambo ndenge ezali to kobongola makambo mpo na kobungisa moto nzela, kobomba likambo ya ntina mpo na kokosa moto mpe kobakisa makambo mpo solo eyebana te.

OYO BIBLIA ELOBI: “Moto ya mbilingambilinga azali eloko moko oyo Yehova ayinaka, kasi Ye azali moninga ya motema ya bato ya kolongobana.” (Masese 3:32) “Sikoyo lokola bolongoli lokuta, bólobaka solo mokomoko na bino na mozalani na ye.”​—Baefese 4:25.

Kokosela bato makambo

Mibali mibale bazali koyebisana makambo na litoi ntango mobali mosusu azali kokɔta na ndako

ELAKISI NINI? Elakisi koloba makambo ya lokuta oyo ekobebisa lokumu ya moto.

OYO BIBLIA ELOBI: “Moto ya myango mabe abimisaka kowelana, mpe moto oyo akoselaka bato makambo akabolaka baninga ya motema.” (Masese 16:28) “Esika nkoni ezali te mɔtɔ ekufaka, mpe esika moto oyo akoselaka bato makambo azali te kowelana esilaka.”​—Masese 26:20.

Kobuba

Mobali oyo azali kolakisa mosapi na bamontre oyo ebombani na kati ya elamba na ye

ELAKISI NINI? Elakisi kotinda moto asundola mbongo to biloko na ye mpo na makambo moko ya lokuta.

OYO BIBLIA ELOBI: “Osengeli kobuba te mosali oyo azwaka lifuti, oyo azali na mpasi mpe azali mobola.” (Kolimbola Mibeko 24:14, 15) “Ye oyo azali kobuba moto oyo azangá asambwisi Mokeli na ye, kasi moto oyo azali komonisela mobola boboto azali kopesa Ye nkembo.”​—Masese 14:31.

Koyiba

Moto oyo azali koyiba pɔtɔmɔni na sakosi

ELAKISI NINI? Elakisi kozwa eloko ya moto kozanga kosɛnga.

OYO BIBLIA ELOBI: “Moyibi ayiba lisusu te, kasi asala nde mosala makasi, asala na mabɔkɔ na ye mosala oyo ezali malamu, mpo azala na eloko ya kokabela moto oyo azali kokelela.” (Baefese 4:28) “Bómikosa te. . . . Miyibi, bato ya lokoso, balangwi-masanga, bafingi, mpe babɔtɔli bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.”​—1 Bakorinti 6:9, 10.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto