Nini etindaka bato bázanga bosembo?
“Kosala mombongo na bosembo ezali makambo ya kala, mpe soki olandi yango okokwea.”—Stephen, États-Unis.
YO MPE ondimi likambo wana? Ezali solo ete mbala mingi, kozanga bosembo epesaka mwa matomba ya ntango mokuse. Yango wana, makambo oyo elandi ekoki kosala ete ezali mpasi mpo moto atikala sembo.
Moto ye moko. Moto nyonso azalaka na mposa ya mbongo mpe biloko ya ntalo. Yango wana, soki libaku ya kozwa yango na nzela ya kozanga bosembo emonani, ezalaka mwa mpasi aboya.
● “Na kompanyi na biso, ngai nde moto napesaka bakɔntra na bakompanyi mosusu. Bato mingi balukaka kopesa ngai kanyaka. Mposa ya kozwa mbongo mingi na mbala moko, ezali mpenza motambo.”—Franz, Proche-Orient.
Mposa ya kozwa benefisi mingi. Na bambula oyo euti koleka, kokwea ya nkita esali ete mimbongo mingi na mokili mobimba etambola malamu te. Lisusu baaparɛyi ndenge na ndenge mpe mayele ya sika ezali kobima ntango nyonso, mpe bakompanyi ebele ezali kowelana. Nyonso wana nde etindaka basali mosusu básalela mayele mabe mpo na kobimisa benefisi mingi ndenge oyo bankolo kompanyi bazali kosɛnga.
● “Tomonaki ete esengeli kaka tósala bongo. . . . Soki te, kompanyi ekokwea.”—Reinhard Siekaczek, bakangaki ye mpo na kanyaka.—Zulunalo The New York Times.
Bato mosusu. Baninga ya mosala to bakiliya bakoki ntango mosusu kosɛnga moto to kobenda ye mpo asangana na bango na likambo ya mabe oyo balingi kosala.
● “Mokambi ya kompanyi moko oyo tosalaka na bango mombongo ayaki epai na ngai mpe ayebisaki ngai ete soki napesi ye ‘madesu ya bana’ te, to kanyaka, akozala lisusu kiliya na biso te.”—Johan, Afrika ya Sudi.
Mimeseno ya mboka. Na bamboka mosusu, momeseno ezali ya kopesana bakado ntango bato bazali kosala mombongo. Lolenge oyo bapesi kado moko mpe soki ezali moke to monene ekoki kosala ete moto ayeba lisusu te soki ezali kaka kado to ekómi nde kanyaka. Na mikili mingi, bakonzi ya mabe basɛngaka mbongo liboso ya kosalela moto likambo oyo basengeli kosalela ye ofele, mpe bandimaka kozwa lifuti mpo básalela moto makambo oyo basalelaka bato nyonso te.
● “Ezalaka mpasi kokesenisa likabo na kanyaka.”—William, Colombie.
Ndenge makambo ezalaka esika moto afandi. Ezalaka lisusu mpasi koleka moto asala makambo na bosembo soki afandi na ekólo oyo bobola ezali makasi to epai bato mingi balandaka mpenza mibeko te. Na bisika ya bongo, soki moto aboyi kobuba to koyiba, bato mingi bakoloba ete alingi libota na ye ekufa nzala.
● “Bato bamonaka kozanga bosembo mabe te, bandimaka yango mpe balobaka ete esengeli kosala yango; mabe kaka soki bakangi yo.”—Tomasi, Congo Kinshasa.
Ndenge oyo bosembo ezali kosila ngala
Mposa ya kosala makambo na kozanga bosembo ezalaka makasi. Ankɛtɛ moko oyo basalaki epai ya bakonzi ya bakompanyi ya mombongo ya Australie emonisi ete pene na bango nyonso bamonaka ete kopesa kanyaka mpe kosalela mayele mabe “ezali mabe kasi ndenge mosusu ya kosala ezali te.” Balobaki mpe ete bakondima kotya bizaleli ya malamu pembeni kaka mpo bázwa kɔntra moko to mpo kompanyi ezwa benefisi.
Atako bongo, mbala mingi bato oyo basalaka makambo na mayele mabe bakanisaka ete bazali bato ya sembo. Ndenge nini bamonaka ete bazali bato malamu atako bazali kosala mabe? Zulunalo moko (Journal of Marketing Research) elobi boye: “Bato basalaka makambo na kozanga bosembo mingi mpo bázwa matomba kasi básalaka yango na mayele mpo bákanisa ete bazali sembo.” Mpo lisosoli etungisa bango te, balukaka ndenge nyonso ya kolongisa mabe na bango.
Na ndakisa, bato mosusu basalelaka maloba oyo eyokanaka mpenza mabe te mpo na kolobela kozanga bosembo. Mpo na bango, kokosa ekómá kokende na “nzela mokuse,” kopesa kanyaka ekómá kopesa “madesu ya bana.”
Bato mosusu balongisaka makambo ya kozanga bosembo mpo babongolá ndenge na bango ya kotalela yango. Tom, oyo asalaka na kompanyi moko oyo etalelaka makambo ya mbongo, alobi boye: “Mpo na bato mosusu, kozala sembo etaleli te kosala makambo alima, kasi nde kosala nyonso mpo bákanga yo te.” David, oyo kala azalaki mokambi ya kompanyi moko ya mombongo alobi boye: “Soki kozanga bosembo ya moto ebimi polele, bato bamonaka yango mabe, kasi soki eyebani te likambo ezali te. Moto oyo bakangi ye naino te abimaka ‘moto ya mayele.’”
Kutu mingi balobaka ete esengeli kaka kozanga bosembo mpo olonga na mombongo. Moto moko oyo asalaka mombongo banda kala alobi boye: “Mbala mingi, koluka koleka baninga etindaka bato báloba ete: ‘Osengeli kosala nyonso mpo olonga.’” Kasi ezali mpenza bongo? To baoyo balukaka kolongisa makambo ya kozanga bosembo bazali nde ‘komikosa na makanisi ya lokuta’? (Yakobo 1:22) Na lisolo oyo elandi, tokotalela matomba ya kozala sembo.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
“Mpo na bato mosusu, kozala sembo etaleli te kosala makambo alima, kasi nde kosala nyonso mpo bákanga yo te”
[Elilingi na lokasa 5]
Mingi balobaka ete esengeli kaka kozanga bosembo mpo olonga na mombongo