Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp17 No. 2 nk. 10-12
  • Koluka kolongwa na boombo na ntango ya kala mpe lelo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koluka kolongwa na boombo na ntango ya kala mpe lelo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • BITUMBA ESALAKA ETE KOTƐKA BAOMBO EKÓMA MOMBONGO MONENE
  • KOLUKA BONSOMI
  • NTANGO BOOMBO EKOSILA MPO NA LIBELA
  • Nzambe andimaka ete bato bázala baombo?
    Lamuká!—2011
  • Nzambe andimaki likambo ya kotɛkisa bato baombo?
    Lamuká!—2002
  • “Bosombamaki na motuya moko boye”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Sɛkɛlɛ oyo babombá yango makasi
    Lamuká!—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
wp17 No. 2 nk. 10-12
Mombongo ya kotɛka baombo kati na Afrika mpe Amerika

Mombongo ya kotɛka baombo kati na Afrika mpe Amerika ezalaki na benefisi mingi

Koluka kolongwa na boombo na ntango ya kala mpe lelo

Blessinga ayaki na Mpoto mpo balakaki ye ete akozwa mosala ya kosala bato nsuki. Kasi andimaki kosala kindumba mpo babɛtaki ye na boumeli ya mikolo zomi mpe bakebisaki ye ete soki aboyi, bakosala bato ya libota na ye mabe na mboka oyo autaki.

Elilingi ya baombo oyo bakangaki bango na Ezipito

Elilingi ya baombo oyo bakangaki bango na Ezipito

Patrɔ ayebisaki Blessing apesaka ye mbongo 200 to 300 euro na butu moko mpo na nyongo ya mbongo koleka 40 000 euro oyo akatelaki ye.b Blessing alobi boye: “Mbala mingi mposa ya kokima ezalaki koyela ngai, kasi nazalaki kobanga makambo bakosala libota na ngai. Nakangamaki na motambo.” Ndenge lisolo ya Blessing emonisi yango, na mokili mobimba bakómisá bato soki milio minei baombo ya kosangisaka nzoto.

Eleki sikoyo mbula soki 4 000, bandeko ya elenge mobali moko na nkombo Yozefe batɛkaki ye. Akómaki mwana-mosala na ndako ya mokonzi moko ya Ezipito. Kasi na ebandeli banyokolaki Yozefe te ndenge basalaki Blessing. Kasi ntango aboyaki kosangisa nzoto na mwasi ya patrɔ na ye, mwasi yango akoselaki Yozefe makambo ete alingaki kosangisa na ye nzoto na makasi. Babwakaki ye na bolɔkɔ mpe bakangaki ye bashɛni.​—Ebandeli 39:1-20; Nzembo 105:17, 18.

Yozefe azalaki moombo na ntango ya kala. Kasi Blessing azali moombo ya ntango na biso. Bango nyonso mibale bakutanaki na likambo oyo ebandá kala, likambo ya kotɛka bato lokola biloko kaka mpo na mbongo.

BITUMBA ESALAKA ETE KOTƐKA BAOMBO EKÓMA MOMBONGO MONENE

Bitumba nde esalaka ete bikólo ezwa baombo na pɛtɛɛ nyonso. Balobaka ete mokonzi Thoutmosis III ya Ezipito amemaki bato 90 000 oyo akangaki nsima ya bitumba oyo babundaki na Kanana. Baezipito bakómisaki bango baombo mpe basalisaki bango misala ya kotimola mabanga ya ntalo, kotonga batempelo mpe kosala banzela.

Na Ampire ya Roma, bitumba esalaki ete bato mingi bákóma baombo mpe na bantango mosusu mposa ya kozala na baombo nde ezalaki kobimisa bitumba. Balobaka ete na siɛklɛ ya liboso, bato mingi ya Roma (50%) bazalaki baombo. Bazalaki kosalisa baombo mingi ya Ezipito mpe ya Roma misala ya makasi. Na ndakisa na Roma, baombo oyo bazalaki kotimola mabanga ya ntalo, bazalaki koumela na mokili kaka mbula soki 30.

Ntango bambula ezalaki koleka, boombo ekómaki lisusu mabe koleka. Kobanda siɛklɛ ya 16 tii ya 19, kotɛka mpe kosomba baombo kati na Afrika mpe Amerika nde ezalaki mombongo oyo ezalaki na benefisi mingi koleka mimbongo nyonso. Lapolo moko ya UNESCO elobi boye: ‘Bakangaki mpe batɛkaki mibali, basi mpe bana milio soki 25 tii 30.’ Balobaka ete mingi na bango bakufaki ntango bazalaki kokatisa Mbu Atlantike. Olaudah Equiano, moombo oyo abikaki na mobembo yango, alobaki boye: “Ndenge basi bazalaki kolela mpe ndenge baoyo bakómaki pene ya kokata motema bazalaki koganga, esalaki nsɔmɔ moko ya kosakana te.”

Likambo ya mawa, boombo ezali kaka te likambo ya kala. Ebongiseli oyo etalelaka makambo ya mosala na mokili mobimba elobi ete tii lelo bato soki milio 21; basi, mibali mpe bana, basalaka kaka lokola baombo, bafutaka bango mbongo moke to mpe te. Baombo ya mikolo oyo basalaka mpe misala ya kotimola mabanga ya ntalo, basalaka na bamagazini ya babɔmbɔ, na baizini ya babriki, na baotɛlɛ mpe na bandako ya bato. Atako mibeko ya Leta epekisi yango, emonani ete boombo ya ndenge wana ezali se kobakisama.

Bana oyo bazali kosala mosala lokola baombo na izini ya babriki

Tii lelo bamilio ya bato basalaka lokola baombo

KOLUKA BONSOMI

Monyoko etindaki baombo mingi báluka bonsomi. Na siɛklɛ ya liboso, liboso ya ntango na biso, Spartacus elombe moko ya bitumba mpe baombo soki 100 000 batombokelaki Roma, kasi balongaki te. Na siɛklɛ ya 18, baombo ya esanga Caraïbe ya Hispaniola batɛmɛlaki bankolo na bango. Mpasi oyo bamonisaki bango na mosala ya bilanga ya sukali ebimisaki bitumba ya bana mboka oyo eumelaki mbula 13, mpe nsukansuka esalaki ete Haïti ezwa lipanda na 1804.

Kasi, kobima ya Bayisraele na Ezipito nde ezalaki kolongwa na boombo oyo esimbaki mpenza. Bato soki milio misato; elingi koloba ekólo mobimba balongwaki na boombo na Ezipito. Ebongaki mpenza bázwa bonsomi yango. Biblia emonisi ete bomoi na bango na Ezipito ezalaki mpasi mpenza mpo banyokolaki bango makasi. (Kobima 1:11-14) Kutu, Farao moko asalaki kampanye ya koboma babebe nyonso mpo Bayisraele bákóma mingi te.​—Kobima 1:8-22.

Kolongwa ya Bayisraele na boombo na Ezipito ezalaki ndenge mosusu mpo Nzambe nde asalisaki bango. Nzambe ayebisaki Moize boye: “Nayebi malamu bampasi oyo bazali komona. Nazali kokita mpo na kobikisa bango.” (Kobima 3:7, 8) Tii lelo, Bayuda na bisika nyonso basalaka Pasika mbula na mbula mpo na kokanisa ndenge babimaki na Ezipito.​—Kobima 12:14.

NTANGO BOOMBO EKOSILA MPO NA LIBELA

Biblia elobi boye: ‘Epai ya Yehova Nzambe na biso, kozanga boyengene ezalaka te,’ mpe endimisi biso ete abongwani te. (2 Ntango 19:7; Malaki 3:6) Nzambe atindaki Yesu ‘asakwela baoyo bakangami kosikolama . . . , mpo atika bato oyo batutamá bákende na bonsomi.’ (Luka 4:18) Yango elingi nde koloba kosikola bato na boombo oyo tolobeli? Te. Nzambe atindaki Yesu alongola bato na boombo ya lisumu mpe liwa. Yesu alobaki boye: “Solo ekopesa bino bonsomi.” (Yoane 8:32) Ata lelo, solo oyo Yesu ateyaki epesaka bato bonsomi na makambo mingi.​—Talá etanda “Kolongwa na boombo ya ndenge na ndenge.”

Ndenge Nzambe asalisaki Yozefe alongwa na boombo ekeseni na ndenge asalisaki Blessing. Na Biblia, okokuta lisolo ya Yozefe na mokanda ya Ebandeli, mokapo 39 tii 41. Milende oyo Blessing asalaki mpo azwa bonsomi, ezali mpe kokamwisa.

Ntango babenganaki Blessing na mboka oyo azalaki, akendaki na Espagne. Kuna, akutanaki na Batatoli ya Yehova mpe akómaki koyekola Biblia. Lokola azwaki ekateli ya kobongisa bomoi na ye, azwaki mosala mpe abondelaki patrɔ na ye ya kala akitisa nyongo oyo azalaki kofuta ye sanza nyonso. Mokolo moko, patrɔ yango abengaki Blessing na telefone, ayebisaki ye afuta lisusu nyongo yango te mpe asɛngaki Blessing bolimbisi. Nini etindaki mwasi yango asala bongo? Mpo Batatoli ya Yehova bakómaki mpe koyekola na ye Biblia! Blessing alobi boye: “Solo esikolaka moto na ndenge ya kokamwa mpenza.”

Yehova Nzambe ayokaki mawa ndenge bazalaki konyokola Bayisraele na Ezipito; na ntembe te, ayokaka mpe mawa na makambo ya ndenge wana lelo oyo. Mpo boombo ya ndenge nyonso esila, ekosɛnga mbongwana moko monene ekɔta na mokili. Yango nde Nzambe alaki. Biblia elobi: “Tozali kozela likoló ya sika mpe mabele ya sika ndenge alakaki, mpe kuna, boyengebene ekozala.”​—2 Petro 3:13.

a Topesi ye nkombo mosusu.

b Na ntango wana euro ná dolare ezalaki na valɛrɛ ndenge moko.

Kolongwa na boombo ya ndenge na ndenge

Alonso ná mwasi na ye

Alonso azalaki moombo ya makambo ndenge na ndenge. Ntango azalaki naino elenge akómaki moombo ya drɔgɛ oyo babengi cocaïne mpe héroïne. Alonso alobi boye: “Mpo na kosomba drɔgɛ yango, nakómaki moto ya mobulu mpe motɛki bangi. Atako nakendaki na bisika minei oyo esalisaka bato mpo na kolongola ngɛngɛ ya bangi na nzoto, nazalaki kokoka kotika komɛla yango te. Bapolisi bakangaki ngai mpe nalekisaki mbula minei na bolɔkɔ.”

Nsima ya kolekisa mbula 30 na boombo ya komɛla bangi, Batatoli ya Yehova bakómaki koyekola na Alonso Biblia. Nsango ya Biblia esimbaki motema na ye mpe esalisaki ye azwa ekateli ya kolongwa na boombo yango. Alobi boye: “Ezalaki pɛtɛɛ te kolongwa na boombo yango mpo eumelaki ebele ya bambula. Kasi Yehova Nzambe asalisaki ngai nalonga etumba yango.”​—Nzembo 55:22.

Alonso alobi boye: “Mwasi na ngai asepelaka ndenge nabongwaná. Napesaka Yehova mersi mingi ndenge asalisá ngai natika kobebisa nzoto na ngai ndenge wana. Soki asalisaka ngai te, mbɛlɛ tii lelo nazali kaka na boombo. To mpe mbɛlɛ nakufá.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto