Tókumisa mobotami ya liboso ya Yehova!
1 Mwalomingo 9 Nisan ya mobu 33 ya ntango na biso, ebele monene na bitape ya mbila na maboko na bango bakumisaki Mwana mobotami ya liboso ya Yehova, Nkolo Yesu Klisto, lokola ete “Mokonzi oyo azali koya, na nkombo na Yehova!” (Luka 19:36; Ebe. 1:6) Mikolo na nsuka oyo Yesu alekisaki na mabelé, Mwayambo 10 mpe Mwamibale 11 Nisan mizalaki mikolo ya mosala mingi, Yesu azalaki mpenza na mingi ya kosala kati na mosala na ye ya kosakola.
2 Na mikolo na biso ebele monene lisusu koleka bazali mpe, na elobeli ya elilingi, na bitape ya mbila na maboko, bazali konganga na mongongo makasi: “Lobiko na Njambe na biso mpe na Mwana na mpate.” (Emon. 7:9, 10) Mwa 14 Apríli oyo ezali koya, tokoyangana mpo na kokumisa Ekaniseli ya liwa ya Klisto. Lokola tozali kobelema na dati yango, tokoki nde kobakisa milende na biso kati na mosala ya kosakola mpe na yango, kolendisa konganga wana ya makumisi oyo esakolami kati na mokili mobimba?
3 Tosala mingi kati na mosala ya kosakola: Basakoli mingi basili mpenza kokana mpo na kozala babongisi-nzela basungi na boumeli ya sanza ya Mársi to ya Apríli. Yo mpe ozali na likoki ya kosala motindo moko? Soki ezali bongo, tondisa lokasa na yo ya lisengi nokinoki. Nkulutu moko akozala na esengo ya koyanola na mituna ndenge na ndenge oyo ozali komituna mpo na lolenge ya mosala wana.
4 Ata tokoki to tokoki te kozala babongisi-nzela basungi, tosala nyonso mpo na kosangana mingi mpenza kati na mosala ya kosakola na boumeli ya sanza ya Mársi to ya Apríli. Mokolo na mokolo, lisangá ekobongisa mbala mosusu bituluku mingi ya bokutani mpo na mosala ya kosakola na boumeli ya sanza wana. Mpo na yango, eteni monene ya bateritware esengeli kotyama pembeni.
5 Masangá nyonso masengeli kobongisa etuluku moko ya bokutani ya sipesiale mpo na mosala ya kosakola na Mwamitano 14 Apríli. Atako kolengela Ekaniseli esengaka mosala monene, moko na moko na biso alendisami ete asangana na mosala ya kosakola na Mwamitano na ntɔngɔ́, soki azali na likoki ya kosala yango. Longola mosala ya ndako na ndako, tósala na boye ete baoyo tobyangaki na Ekaniseli bázala na likoki ya koya, mpe ete báyeba malamu ngonga mpe esika oyo likita likosalema.
6 Tóbyanga mpe tólendisa basusu: Yesu apesaki etinda oyo epai na bayekoli na ye: “Bosalaka boye mpo na ekaniseli na ngai.” (1 Kol. 11:24) Bayekoli bapakolami ya Yesu, baoyo bazalaki kotambola na matambe na ye, batosaki etinda yango. Motindo moko, mosaleli nyonso ya Yehova abyangami na kozala wana mpo na kokumisa Ekaniseli. Kati na bato oyo bakobyangama ekozala mpe malamu ete tobyanga, kati na bato mosusu, basangani ya libota na biso, bato oyo toyekolaka Biblia elongo na bango mpe baoyo elongo na bango tosololaki masoló ya Biblia, baninga na biso oyo bazali Batatoli te, mpe baninga na biso ya mosala. Tokoki kokoma bankombo na bango ete tobosana moto moko te.
7 Mabaku mosusu makopesamela biso mpo na kolendisa bato ya motema malamu na mpokwa ya Ekaniseli. Tosenzela ete tokóma na ngonga malamu mpo na koyamba bato ya sika oyo bakoya mpo na mbala ya liboso. Soki mingi kati na bayekoli na biso bakozala wana, ekozala malamu ete mosakoli moko akana kofanda penepene na bamoko kati na bango na boumeli ya likita. Tokoki kobyanga bato ya sika mpo na koya koyagana na likita ya bato banso na lisangá. Nkulutu oyo akoponama mpo na kosala lisukúlu ya bato banso asengeli komibongisa malamu mpo ete lisoló na ye lizala ya kolendisa.
8 Na nsuka ya molulu ya Ekaniseli, wana ekosangisa biso mingongo na loyembo 105, “Tókumisa Mobotami ya liboso ya Nzambe!”, tika ete tozala kati na baoyo bakozala na bosepeli mpo ete bamipesaki na molende nyonso kati na mosala ya kosakola na boumeli ya sanza yango, mpo na lokumu ya Yehova!