Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/13 lok. 1
  • Okozala mobongisi-nzela mosungi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okozala mobongisi-nzela mosungi?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Masolo mosusu
  • Omibongisa sikoyo mpo osakola lisusu mingi
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Salá ete eleko ya Ekaniseli ya mbula oyo ezala eleko ya esengo!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Tozali koluka babongisi-nzela basungi 100 000
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Tósakola bizaleli malamu ya Yehova
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2013
km 2/13 lok. 1

Okozala mobongisi-nzela mosungi?

1. Mpo na nini eleko ya Ekaniseli ezali ntango oyo ebongi mpo tósakola mingi?

1 Eleko ya Ekaniseli ezali ntango oyo ebongi mpo na kosakola mingi. Na ntango yango, tokanisaka bolingo monene ya Yehova, oyo etindaki ye apesa Mwana na ye lokola lisiko. (Yoa. 3:16) Mitema na biso etondaka na botɔndi, mpe yango ebakisaka mposa na biso ya koyebisa basusu makambo etali Yehova mpe oyo azali kosala mpo na bato. (Yis. 12:4, 5; Luka 6:45) Ezalaka mpe ntango oyo tosalaka kampanye mpo na kobengisa bato oyo toyebani na bango mpe bato ya teritware na biso mpo báya koyangana elongo na biso na Ekaniseli. Na nsima, tosalaka makasi ya kozongela bato oyo bayanganaki mpo tósalisa bango básepela lisusu mingi. Okozala mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Misato, ya Minei to ya Mitano mpo osakola mingi?

2. Mpo na nini sanza ya Misato ebongi mpenza mpo na kozala mobongisi-nzela mosungi?

2 Salá ete sanza ya Misato ezala ya ntina mingi: Sanza ya Misato ekozala sanza ebongi mpenza mpo na kozala mobongisi-nzela mosungi. Baoyo bakozala babongisi​-nzela bakoki kopona kosakola ngonga 30 to ngonga 50. Soki mokɛngɛli ya zongazonga akotala lisangá na bino na sanza ya Misato, babongisi-nzela basungi bakokɔta na likita mobimba elongo na babongisi-nzela ya sanza na sanza mpe babongisi-nzela monene. Ekaniseli ekosalema mokolo ya Mibale, 26/03/2013. Na kokesana na bambula eleki, kampanye mpo na kokabola nkasa ya libyangi ekoumela mingi, mpo ekobanda mwa 1/03/2013. Longola yango, sanza ya Misato ezali na mikolo ya pɔsɔ mitano mpe mikolo ya lomingo mitano. Na yango, mpo na nini te kotalela soki yo mpe okoki kosala ete sanza yango ezala ya ntina mingi?

3. Ndenge nini tokoki komibongisa mpo tósakola mingi?

3 Omibongisa banda sikoyo: Sikoyo nde ntango ya kotala programɛ na yo mpo oyeba makambo nini osengeli kobongola mpo osala mosala ya mobongisi-nzela. Ekozala malamu libota mobimba básala na bomoko. Na yango, bózwa ntango na Losambo na bino na kati ya libota mpo na kolobela mikano oyo bozali na yango na libota mpe kobongisa programɛ na bino. (Mas. 15:22) Soki ozali na likoki ya kozala mobongisi-nzela mosungi te, kolɛmba nzoto te. Okoki kobongisa programɛ na yo mpo osakola mwa ntango molai na mikolo oyo obimaka na mosala ya kosakola? Okoki kobakisa mokolo moko na kati ya pɔsɔ mpo na kobima na mosala ya kosakola?

4. Matomba nini tokozwa soki tosakoli mingi na sanza ya Misato, ya Minei mpe ya Mitano?

4 Soki tosakoli mingi na sanza ya Misato, ya Minei mpe ya Mitano, tokozwa esengo mingi oyo eutaka na kosalela Yehova mpe kokabela basusu. (Yoa. 4:34; Mis. 20:35) Oyo eleki ntina, milende mpe elimo na biso ya komipimela ekosepelisa Yehova.​—Mas. 27:11.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto