Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/08 nk. 3-6
  • ‘Pesá litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Pesá litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu’
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Masolo mosusu
  • Tósakola bizaleli malamu ya Yehova
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • “Tósakola liloba ya Nzambe malamumalamu”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Kobá kosakola misala ya kokamwa ya Yehova
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Eleko ya Ekaniseli ezali ntango ya kosakola lisusu mingi!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 1/08 nk. 3-6

‘Pesá litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu’

1. Bansango nini ya malamu tozali na yango ya koyebisa bato?

1 Na mokili oyo etondi na bansango ya mabe, tozali na libaku malamu ya “kopesa litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu ya boboto monene ya Nzambe.” (Mis. 20:24) Yango elingi koloba ete tosengeli koyebisa bato ete etikali moke “mikolo ya nsuka” ekóma na nsuka na yango, mpe tókɔta na mokili ya sika ya Yehova ya boyengebene, epai “makambo ya kala” ekozala lisusu te. (2 Tim. 3:1-5; Emon. 21:4) Na ntango wana, maladi ekozala lisusu te. (Yis. 33:24) Bakufi bakobima na malita ya kokanisama mpe bakokutana lisusu na bandeko mpe baninga na bango. (Yoa. 5:28, 29) Mabelé mobimba ekokóma paladiso kitoko. (Yis. 65:21-23) Wana ezali kaka mwa ndambo ya bansango ya malamu oyo tozali na yango ya koyebisa bato!

2. Mpo na nini eleko ya Ekaniseli epesaka biso mabaku mingi ya kopesa litatoli mpo na nsango malamu?

2 Sanza ya Marsi, Aprili, mpe Mai ekopesa biso mabaku mingi ya kosakola bansango malamu wana. Na bisika mingi ya mokili, moi ezalaka makasi mingi te, mbula ebɛtaka mingi te, mpe mikolo mosusu moi elalaka noki te, na basanza wana; yango epesaka basakoli mingi nzela ya kosakola mingi. Lisusu, molulu ya ntina mingi na mbula, elingi koloba Ekaniseli, ekosalema na mokili mobimba na mokolo ya pɔsɔ 22 Marsi, nsima ya kolala ya moi. Sikoyo nde ntango ya kobanda komibongisa mpo na kosakola mingi.

3. Nini ekoki kosalisa mabota básakola mingi?

3 Mosala ya mobongisi-nzela mosungi: Okoki nde kobongisa programɛ na yo mpo na kozala mobongisi-nzela mosungi sanza moko, mibale to nyonso misato? Mpo na nini te kotika mwa ntango na boyekoli na bino ya libota oyo ekolanda mpo na kolobela likambo yango? Soki libota bapesani mabɔkɔ, moto moko to bato mingi ya libota yango bakoki kokóma babongisi-nzela basungi. (Mas. 15:22) Bóbondela mpo na yango, mpe bokomona ndenge Yehova akopambola milende oyo bokosala. (Mas. 16:3) Ata soki moto moko te ya libota akozala mobongisi-nzela mosungi, bino nyonso bokoki komityela mokano ya kosakola mingi elongo na bandeko oyo bakozala babongisi-nzela.

4. Soki okendaka mosala mikolo nyonso, okoki kosala nini mpo osala mosala ya mobongisi-nzela mosungi?

4 Soki okendaka mosala mikolo nyonso, okoki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi soki ozali na programɛ ya malamu. Na ndakisa, okoki kosalela ndambo ya ntango na yo ya bopemi na midi mpo na kosakola. To, okoki kosɛnga teritware moko pene na esika ofandi to pene na esika na yo ya mosala, mpe kosakolaka ngonga moko to koleka liboso to nsima ya mosala. Okoki kozwa ntango mingi ya kosakola soki otiki makambo mosusu oyo osalaka, oyo ezali na ntina mingi te, mpo osala yango na sanza mosusu, mpe soki ozali kosakola mokolo mobimba na mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo. Basusu bazwaka mokolo moko to mikolo mibale ya konje na mosala mpo na kosakola.

5. Ndenge nini okoki kosalisa mibange mpe baoyo bazali na mikakatano ya nzoto básala mosala ya mobongisi-nzela mosungi?

5 Soki ozali mobange, to ozali na mikakatano ya nzoto, to ozali na makasi mingi te, okoki kokóma mobongisi-nzela mosungi soki ozali kosakola mwa ngonga moke mokolo na mokolo. Sɛngá Yehova apesa yo “nguya oyo eleki makasi.” (2 Kol. 4:7) Ndeko mwasi moko asalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi wana azalaki na mbula 106! Na lisalisi ya bandeko na ye ya libota oyo bazali baklisto mpe bandeko mosusu ya lisangá, asakolaki ndako na ndako, azongelaki bato oyo basepelaki na nsango malamu, abandaki koyekola na bato Biblia, mpe asanganaki na mitindo mosusu ya kosakola. Na lisalisi na ye, bato zomi bakómaki koyekola Biblia. Ndeko mwasi yango alobi boye: “Soki nakanisi libaku kitoko oyo nazali na yango ya kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi, nakómaka na botɔndi mingi mpe na bolingo mingi mpo na Yehova, mpo na Mwana na ye, mpe ebongiseli na ye oyo etondi na bolingo. Nalingi mpenza koloba ‘matɔndi Yehova!’ ”

6. Elenge oyo azwá batisimo mpe azali naino kotánga kelasi akoki kosala nini mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi?

6 Soki ozali elenge oyo azwá batisimo mpe ozali naino kotánga kelasi, yo mpe okoki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Ndenge moko na bato oyo bakendaka mosala mikolo nyonso, okoki kobongisa kosakolaka mingi na mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo. Mbala mosusu, okoki kobongisa kosakolaka mikolo mosusu ngonga moko to koleka nsima ya kelasi. Ezali nde na mokolo moko na sanza wana oyo bana bakendaka kelasi te, oyo okoki kosalela mpo na kosakola? Soki ozali na mposa ya kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi, sololá na baboti na yo.

7. Bankulutu bakoki kosala nini mpo na kolendisa basusu básakola mingi na eleko ya Ekaniseli?

7 Lendisá basusu: Ndakisa ya bankulutu ekoki mpenza kolendisa bandeko mosusu ya lisangá. (1 Pet. 5:2, 3) Bakoki komona malamu bábongisa makita mosusu mpo na mosala ya kosakola mpo na baoyo balingi kosakola na ntɔngɔntɔngɔ, nsima ya kelasi, to nsima ya mosala. Mokɛngɛli na mosala ya kosakola asengeli kopona bandeko oyo babongi mpo na kotambwisa makita yango, mpe kobongisa bateritware ebele, bazulunalo, mpe mikanda mpo na basanza wana ya ntina mingi.

8. Liteya nini tozwi na likambo oyo esalemaki na lisangá moko?

8 Na lisangá moko, bankulutu babandaki kolendisa bandeko básala mosala ya mobongisi-nzela mosungi basanza mingi liboso. Pɔsɔ nyonso, bazalaki koyebisa lisangá bandeko boni basɛngi mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Yango esalisaki bandeko mosusu oyo bazalaki mpe na mposa ya kosala mosala yango báyeba ete bakozala bango moko te. Bankulutu bazwaki bibongiseli mpo makita mosusu ya mosala ya kosakola esalemaka na ntɔngɔntɔngɔ mpe na mpokwa. Na ndenge yango, basakoli 53, elingi koloba pene na katikati ya basakoli ya lisangá yango, basalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Aprili!

9. Mpo na nini eleko ya Ekaniseli ezali ntango ya malamu mpenza mpo bato oyo bazali kokokisa masɛngami bábanda kosakola nsango malamu?

9 Salisá basusu básakola: Soki bato ya sika mpe bana mike bakokisi masɛngami mpo na kobanda kosakola, bakoki kosakola elongo na basakoli oyo bameseni na mosala ya kosakola. Tokozwa libaku yango na eleko ya Ekaniseli, ntango basakoli ebele bakomipesa lisusu mingi na mosala ya kosakola. Ozali na moto moko oyo oyekolaka na ye Biblia, oyo asili koyokanisa bomoi na ye na mitinda ya sembo ya Yehova? Ozali na mwana oyo azali na etamboli ya malamu mpe azali kokola malamu na elimo kasi akómi naino mosakoli te? Soki moto yango to mwana yango ayebisi yo ete alingi kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te mpe omoni ete azali kokokisa masɛngami, yebisá likambo yango na nkulutu moko. Mokɛngɛli-mokambi akobongisa mpo bankulutu mibale básolola na mwana yango to na moyekoli yango na miso na yo.

10. Bankulutu bakoki kosala nini mpo na kosalisa bandeko oyo batiká kosakola?

10 Basanza wana ekozala mpe ntango ya malamu mpenza mpo na bandeko oyo batiká kosakola bázongela makambo ya lisangá. Mokɛngɛli na boyekoli ya mokanda na lisangá mpe bankulutu mosusu basengeli koyokana mpo na kokende kotala bato ya ndenge wana mpe koluka kobima na mokomoko na bango na mosala ya kosakola. Soki moto yango atiká kosakola banda kala, bankulutu mibale basengeli kosolola na ye liboso mpo na kotala soki azali kokokisa masɛngami mpo na kosakola.​—km 11/00 lok. 3.

11. Wapi elembo eleki monene ya “boboto monene ya Nzambe?”

11 Omibongisa mpo na Ekaniseli: Lisiko ezali elembo eleki monene ya “boboto monene ya Nzambe.” (Mis. 20:24) Na mokili mobimba, bamilio ya bato oyo bazali na botɔndi mpo na lisiko bakoyangana na mokolo ya pɔsɔ, 22 Marsi, nsima ya kolala ya moi, mpo na kosala Ekaniseli ya liwa ya Yesu. Tolingi kobenga bato nyonso ya mitema sembo mpe kosalisa bango báyangana na molulu wana ya ntina mingi, oyo epesaka litatoli mpo na boboto monene oyo Yehova amoniseli bato.

12. Banani tosengeli kobengisa na Ekaniseli?

12 Salá liste ya bato oyo okobengisa. Na ntembe te, okobosana te kotya na liste yango bandeko na yo ya libota, baninga ya kartye, ya mosala, ya kelasi, bato oyo ozalaki koyekola na bango Biblia kala mpe oyo ozali koyekola na bango sikoyo, mpe bato nyonso oyo ozongelaka mbala na mbala. Soki moto oyo obengisi atuni yo mituna etali Ekaniseli, okoki kosalela makanisi oyo ezali na apɛndisi oyo elobeli Bolei ya Mpokwa ya Nkolo, oyo ezali na buku Biblia eteyaka nkasa 206-208. Yango ekoki kutu kopesa yo nzela obanda koyekola na moto Biblia, mpamba te ezali buku oyo tosalelaka mpo na koyekola na bato Biblia.

13. Ndenge nini Yehova apambolaki milende ya basakoli mibale oyo bamityelaki mokano ya kobengisa basusu na Ekaniseli?

13 Ndeko mwasi moko atyaki mabota 48 na liste ya bato oyo asengelaki kobengisa. Ntango azalaki kobengisa bango, azalaki mpe kokoma dati oyo abengisaki moto mokomoko pene na nkombo na ye. Azalaki mpenza na esengo ya komona ete bato 26 kati na baoyo abengisaki bayanganaki na Ekaniseli! Ndeko moko oyo azalaki na magazini na ye abengisaki motɛki na ye moko, oyo kala azalaki sango. Moto yango ayanganaki na Ekaniseli mpe na nsima alobaki na kokamwa nyonso boye: “Na ngonga moko kaka, nayekoli makambo ebele na Biblia koleka oyo nayekoli na boumeli ya mbula 30 oyo nalekisi na Lingomba ya Katolike.” Mwa moke nsima ya Ekaniseli, andimaki koyekola buku Biblia eteyaka.

14. Kampanye nini ya monene ekobanda na mokolo ya 1 Marsi?

14 Kampanye: Banda na mokolo ya pɔsɔ 1 Marsi tii na mokolo ya 22 Marsi, tokosala kampanye monene na mokili mobimba mpo na kobengisa bato na Ekaniseli. Ekozala malamu basakoli nyonso bápesa mpenza mabɔkɔ na kampanye wana ya ntina mingi. Ezali malamu kopesa moto lokasa ya libyangi na mabɔkɔ na esika ya kotikela ye yango na porte. Kasi, soki teritware na bino ezali monene, bankulutu bakotala soki ekosɛnga bóbanda kotika lokasa ya libyangi na ndenge ya mayele na ndako oyo bokuti moto te. Na mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo, tokokabola mpe bazulunalo.

15. Tokoki koloba nini ntango tozali kopesa moto lokasa ya libyangi na Ekaniseli?

15 Lokola ntango oyo ebongisami mpo na kokabola nkasa ya libyangi ezali mokuse, ekozala malamu tósala masolo ya mikuse. Zalá na boboto mpe na esengo. Na ndakisa, okoki koloba boye: “Tolingi koyeba soki yo ná libota na yo, mpe baninga na yo, bosili kozwa nkasa ya libyangi mpo na molulu ya ntina mingi oyo ekosalema na mokolo ya 22 Marsi. Lokasa na yo ya libyangi yango oyo. Okoyeba makambo mosusu na kati.” Mbala mosusu, moto yango akoki kotuna yo mituna. To akoki kondima kozwa lokasa ya libyangi, ata mpe komonisa ete akozanga te koya. Komá nkombo ya bato oyo bazwi lokasa ya libyangi mpe bongisá kozongela bango.

16. Ndakisa nini emonisi ntina ya kosala kampanye mpo na kobengisa bato ya teritware na biso na Ekaniseli?

16 Na mbula eleki, soda moko akutaki lokasa ya libyangi na porte ya ndako na ye. Andimaki koyangana na Ekaniseli, kasi asengelaki liboso kosɛnga nzela epai ya mokonzi na ye. Ntango alakisaki mokonzi na ye lokasa ya libyangi, mokonzi afandaki nyɛɛ mpe ayebisaki ye ete baboti na ye bazali Batatoli ya Yehova mpe azalaká koyangana na makita elongo na bango. Mokonzi apesaki ye kaka ndingisa te, kasi bango nyonso mibale bayanganaki na Ekaniseli!

17. Ndenge nini tomonisaka ete tozangi te kokokisa mokano ya boboto monene ya Nzambe?

17 Monisá ete ozali na botɔndi: Lokola eleko ya Ekaniseli ya mobu 2008 ekómi pene, tiká ete mokomoko na biso akanisa na boboto monene oyo Yehova amoniseli biso. Ntoma Paulo akomaki boye: “Biso mpe tozali kobondela bino ete bóyamba te boboto monene ya Nzambe mpo na kozanga kokokisa mokano na yango.” (2 Kol. 6:1) Ndenge nini tomonisaka ete tozangi te kokokisa mokano ya boboto monene ya Nzambe? Paulo akomaki ete: “Kasi na makambo nyonso tozali komilobela lokola baministre ya Nzambe.” (2 Kol. 6:4) Na bongo, tomonisaka ete tozali na botɔndi mpo na likabo ya Yehova, na ndenge tozalaka na etamboli ya malamu mpe tosakolaka nsango malamu na molende. Eleko ya Ekaniseli ya mbula oyo ekopesa biso libaku ya kosakola mingi mpe kopesa litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu.

[Etanda na lokasa 3]

Banani bakoki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi?

◼ Mabota

◼ Baoyo bakendaka mosala mikolo nyonso

◼ Mibange mpe baoyo bazali na mikakatano ya nzoto

◼ Bana kelasi

[Etanda na lokasa 4]

Ntango ozali kopesa bato nkasa ya libyangi na Ekaniseli:

◼ Salá lisolo ya mokuse mpe lobá na esengo

◼ Komá nkombo ya bato oyo bazwi lokasa ya libyangi mpe zongelá bango

◼ Kabolá bazulunalo na mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto