Biyano na mituna na bino
◼ Meko nini ya bokɛngi tosengeli kokamata ntango tozali kosakola kati na teritware moko ya likama?
1 Mbala na mbala tozali koyoka bato bazali koloba na ntina na mobulu mpe kosala bato mabe, mingi mpenza kati na bakartye ya bingumba minene. Yango ezali kotungisa biso, kasi toyebi ete, ata na bisika oyo mobulu ezali mingi, bato ya motema malamu bakosepela na nsango ya Bokonzi. Na yango, na ntango oyo ebongi, tosengeli kozwa molende ya kokende liboso, kozaláká na elikya ete Yehova azali kosɛnzɛla likoló na biso.—Mas. 29:25; 1 Tes. 2:2.
2 Na ntango tozali kokende na kartye moko oyo ekoki kozala ya likama, Yehova azali kozela epai na biso ete tómonisa bokɛngi mpe bososoli malamu. Tókeba. “Moto na mayele akososola mabe liboso mpe akomibomba; nde bazoba bakoleka wana mpe bakozwa etumbu.” (Mas. 22:3) Basakoli oyo bameseni na mosala bayebi ete ezali mayele kosakola mibale mibale to mpe koleka, soki yango esengeli. Tozali kotánga na Mosakoli 4:9, 12: “Mibale baleki moko na malamu. . . . Ata moto akoki koleka ye oyo azali bobele ye moko, nde mibale bakotɛlɛmɛla ye.” Mbala mingi bato na mobulu batungisaka moto oyo azali ye moko, mpamba te bakokoka kozwa ye kozanga nkaka.
3 Tózala mpenza na bokɛngi mingi ntango tozali kosakola na bandako minene kati na banzela molili oyo ekaboli yango mpe wana tozali na nse ya bibuteli oyo bitikali mpamba. Tózala na bokɛngi na ntango tobyangami mpo na kokɔta kati na ndako to apartema moko. Tómikɔtisa kati na bowelani te na baoyo bazali komimonisa lokola bakaneli to batumoli. Tóyebisa nokinoki ete tozali Batatoli ya Yehova. Ezali mpo na ntina wana nde basakoli basimbaka ntango nyonso Biblia to zulunalo moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to Lamuká! na mabɔkɔ.
4 Tókeba na bato oyo bazali kolekaleka kati na balabala. Tókeba na ntango tozali kokɔta kati na ascenseur elongo na bato oyo, bamonani ete, bafandaka kati na ndako wana. Tólataka te babiju ya motuya mingi. Soki tosɛngisami ete tóbima wana butu esili kokóma, tólanda banzela ya molili te mpe oyo bato moke balekaka kuna. Soki babimeli biso na mobulu, tótya matata te wana balingi bobele kobotola mbongo na biso to biloko na biso; bomoi na biso ezali mpenza na motuya koleka eloko nyonso mosusu ya mosuni.—Malako 8:36.
5 Bandeko oyo bazali kotambwisa mosala ya etuluku moko basengeli kozala na bokɛngi mpe koyeba ntango nyonso esika nini basakoli bazali mpe oyo bazali kosala. Mingimingi, ezali malamu ete etuluku esakola na kartye bobele moko; na bongo basakoli bakozala penepene bamoko mpe basusu. Soki bitumba to mobulu ebimi, atako yango ezali ya ndenge nini, esengeli kotika teritware nokinoki kozanga koumela.
6 Soki tozali na bokɛngi mpe na bokebi, tokokoka koteya bafandi ya bakartye ya makama “oyo bakokimela mpe bakolela na ntina na makambo na mbindo nyonso masalami kati na mboka.”—Ezek. 9:4.