Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/96 lok. 1
  • Osilá komeka kosakola na mpokwa?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osilá komeka kosakola na mpokwa?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • Okoki kobongola programɛ na yo?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Okoki kosakola na mpokwa?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Tóluka baoyo babongi
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Tósakola nsango malamu bipai nyonso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 8/96 lok. 1

Osilá komeka kosakola na mpokwa?

1 Ntango mosala na biso mozali kobota mbuma, tosepelaka kosala yango. Nzokande, soki tozali kozwa litomba ata moko te, yango ekómaka mpii mpe epesaka biso bosepeli te. Mosala ya malamu epesaka mbano mpe ezali bongo lipamboli. (Talá Mosakoli 3:10-13.) Tokoki kosalela lilako oyo na mosala na biso ya kosakola. Na momeseno, wana tozali kosakola ndako na ndako mpe wana tozali kolónga na kobanda masoló likoló na Biblia, tozongaka na bandako na biso na kobɔndisama mpenza na elimo. Tozalaka na mayoki ete tosali mpenza mosala.

2 Na bisika mingi, bato bazalaka na bandako na bango te ntango tolekaka na moi. Masangá mosusu masili kolónga mokakatano wana na kokamatáká bibongiseli ya kosakola na mpokwa, mpe basili kozwa matomba malamu. Na mboka na biso tokoki kosakola mpe kotika ntango butu ekɔti. Basakoli bazali koyebisa ete wana bazali kokende kosakola na mpokwa bazali kokuta bato mingi na bandako na bango mpe, na momeseno, bato yango bazalaka na misala mingi te ya kosala mpe bazalaka pene mpo na koyoka nsango ya Bokonzi. Osilá komeka kosakola na mpokwa na teritware na bino?​—Talá Malako 1:32-34.

3 Bankulutu babongisaka mosala ya kosakola na mpokwa: Kati na masangá mingi, makita mpo na mosala ya kosakola oyo mabongisami nsima ya midi to na mpokwa esimbamaka malamu. Tokoki kokanisa na ntina na bilenge basakoli oyo bazali kouta kelasi na nsima ya midi mpe mikóló oyo bazali kosilisa mosala na bango na mpokwa. Mpo na basakoli mosusu oyo bazali na likoki te ya kosakola na wikende, mosala ya kosakola na mpokwa na boumeli ya pɔ́sɔ ezali mwango ya malamu oyo mozali kopesa bango nzela na kosangana sanza na sanza na mosala ya kosakola.

4 Mosala ya kosakola na mpokwa ekoki kosalema na mitindo mikeseni. Tokoki kokende ndako na ndako mpe kolakisa bazulunalo to mokanda oyo ebongisami mpo na sanza. Yango mpe ezali libaku kitoko koleka mpo na kozongela bato oyo bazalaki te ntango basakoli mosusu balekaki na moi to na boumeli ya wikende. Mbala mosusu ezali na bisika oyo bibongi mpo na kopesa litatoli na balabála, epai tokoki kokutana na bato oyo bazali kouta misala. Mingi bamonaka ete mpokwa nde ezali eleko ebongi mpenza mpo na kozongela baoyo bamonisaki bosepeli.

5 Tózala na bokɛngi mpe na mayele: Kobima wana butu ebandi kokɔta ezalaka na makámá na bakartyé mosusu ya bingumba na biso. Ekozala bongo likambo ya mayele kobima bato mibale to na etuluku. Awa tolingi kolobela bituluku mingi ya basakoli mibale oyo bazali kosakola elongo na balabála moko. Bandeko, tómikundola likambo oyo: Na momeseno, ezali malamu te kosangisa basakoli misato to minei esika moko, mpo na kosakola elongo. (Talá Malako 6:7; Luka 10:1.) Tokoki kosakola moto ye moko, to mibale mibale. Ekozala malamu kopona balabála oyo engɛngisami malamu na miinda mpe kokenda bobele na bakartyé oyo tondimisami ete likámá ekoki mpenza kokómela biso te. Ntango tobɛti na ekuke moko, tótɛlɛma na lolenge ete bámona biso malamu mpe tóyebisa polele likambo toyeli. Tózala na bososoli. Na momeseno, ezali malamu kosukisa kosakola wana butu ebandi kokɔta, na esika ya kokende kotala bato wana butu ekɔti makasi mpe wana bato mosusu bazali komilɛngɛla mbala mosusu mpo na kolala.

6 Eleko ya elanga mpe bampokwa oyo mbula ezali kobɛta te ebongi mpenza mpo na kosakola na mpokwa. Yehova akopambola solo milende na biso mpo na kosalela ye “mosala na bulɛɛ butu na moi.”​—Emon. 7:15, NW.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto