Tózala na limemya epai na bazalani na biso—Eteni ya mibale
1 Na meko oyo ekoki na biso, tolingi kozala na boyokani malamu na bato ya kartye na biso. Yango esɛngaka ete tózala na limemya mpe botosi mpo na ntómo mpe mayoki na bango.
2 Batatoli ya Yehova bayebani mpo na bizaleli na bango malamu. Lolenge na biso ya kosala makambo malamu epai na bato ya zingazinga na biso, na eteyelo, na esika ya mosala mpe na mayangani, epesaka nzela na makumisi mingi.—Talá Mosenzeli ya 15 Yuni 1989, lokasa 20.
3 Mingimingi, etamboli malamu etalelaka makambo mingi, lokola kozala sembo, komipesa na mosala mpe bizaleli malamu. Etalelaka mpe limemya epai na bato oyo bafandi zingazinga na Ndako ya Bokonzi. Ezaleli na biso ya kobanga Nzambe ekoki mpenza kobeba soki tozali na bopɔtu mpo na oyo etali komonisa limemya epai na bato oyo bazali zingazinga na biso. Paulo alendisaki biso ete ‘tomitambwisa na lolenge lobongi na nsango malamu.’—Filp. 1:27, NW.
4 Na bantango mosusu, bato oyo bafandaka zingazinga na Bandako ya Bokonzi na masangá mosusu bazali komilelalela na ntina oyo bazali komona mpo na bozangi limemya oyo euti na baoyo bazali koyangana na makita. Bandeko basi mpe bandeko mibali basengeli te kosala bituluku na mbalasani ya Ndako ya Bokonzi mpe koyeisa masolo milaimilai oyo makoki koyokana kino na bandako oyo ezali zingazinga. Tosengeli kopesa nzela te na bana ete bákɔtaka mpe bábimaka na Ndako ya Bokonzi na kopotáká mbangu. Bizaleli motindo wana ezali kopesa nsɔ́ni na lisangá. Esɛngi mpe kotosa malako nyonso matali libateli mpe kozala na mikanda ya Leta wana tozali kotambola na kartye.—Lom. 13:1, 2, 5.
5 Biblia ezali kolendisa biso ete ‘tósala nyonso mpo na lokumu ya Nzambe,’ oyo esɛngi ete tózala na limemya epai na baoyo bazali kotala biso. (1 Kol. 10:31-33) Soki tozali ‘kotalela matomba ya basusu,’ tokokɔta te na mapango na bango kozanga limemya. (Filp. 2:4) Lisusu, tokosala milende ete tóbetisa bafandi ya kartye na biso libaku te.
6 Limemya na biso epai na basusu, ezala na kati to na libanda ya lisangá, ezali komonisa oyo tozali na yango kati na motema. Oyo tozali kosala mpe oyo tozali koloba esengeli komonisa ete ‘tozali kolinga bazalani na biso lokola biso moko.’—Mat. 7:12; 22:39.