Tólakisa na lolenge ya malamu buku Bomoi ya seko
1 Yesu ayebaki malamumalamu lolenge ya kosalela maloba mpo na kobanda masolo. Ayebaki eloko nini asengelaki koloba mpo na kolamwisa bosepeli ya bayoki na ye. Mokolo moko, abandaki lisolo elongo na Mosamalia moko ya mwasi bobele na kosɛngáká ye mai ya komela. Yango ebendaki nokinoki likebi na ye, mpamba te ‘Bayuda bazalaki na boyokani na Basamalia te.’ Na nsuka, lisolo yango lisungaki mwasi wana mpe bato mosusu mingi na kokóma bandimi. (Yoane 4:7-9, 41) Tokoki kozwa matomba na ndakisa ya Yesu.
2 Ntango tozali komibongisa mpo na kolakisa buku Bomoi ya seko, tómituna boye: ‘Makambo nini mazali kotungisa bato ya teritware na biso? Lisolo nini likosepelisa elenge, mokóló, mobali oyo abalá to mwasi ya libala?’ Tokoki kobongisa maloba mpo na kobanda masolo mingi mpe kokana kosalela oyo ekoyokana mpenzampenza na likambo oyo tokokutana na yango.
3 Lokola bato mingi bazali komitungisa mpo na kobeba ya bomoi ya libota, tokoki koloba boye:
◼ “Mitungisi ya bomoi ya mokolo na mokolo mizali kotya mabota na mokakatano monene. Epai wapi mabota makoki kozwa lisalisi? [Tiká moto yango ayanola.] Biblia ekoki mpenza kosalisa biso. [Tángá 2 Timote 3:16, 17.] Makomami mazali kopesa litambwisi ya malamu oyo ekoki kopesa nzela na mabota ete malonga mitungisi. Talá oyo elobami na buku, Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis, na paragrafe 3 na lokasa 238.” Tótanga paragrafe 3 mpe tólakisa buku yango.
4 Soki tolobeli likambo moko liyebani mingi, tokoki koloba boye:
◼ “Oyokaki nsango oyo etalaki [lobelá likambo moko oyo lizali kobenda likebi ya bato ya kartye]? Okanisi nini mpo na yango? [Tiká ayanola.] Bato bazali komituna soki mokili ezali kokende wapi na komona makambo motindo wana, boye te? Biblia esakolaki ete tozali kobika na mikolo ya nsuka.” Na nsima, tokoki kolakisa oyo buku Bomoi ya seko elobi na nkasa 150-153.
5 Bato mingi bazali komitungisa mpo na bokoli ya makambo ya mabe. Tokoki kosalela maloba mpo na kobanda lisolo oyo ya liboso na nse ya motó ya likambo moke “Mabe/Libateli,” na lokasa 5 ya mwa búku “Lolenge nini okoki kobanda mpe kolandisa masolo likolo na Biblia”:
◼ “Mbote Monsieur (to Madame). Tozali kosolola elongo na bato oyo tozali kokutana na bango na ntina na libateli ya moto na moto. Mabe mingi mazali kosalema zingazinga na biso, mpe likambo yango ezali kotungisa biso. Okanisi ete ekozala na ntango oyo bato lokola yo mpe ngai bakotambola na butu kati na nzela kozanga kobanga?” Tokoki kotánga Nzembo 37:10, 11 mpe kolobela mingi matomba oyo Bokonzi ya Nzambe ekomema na kosaleláká nkasa 156-158 ya búku Bomoi ya seko.
6 Soki tokolinga maloba ya pɛtɛɛ mpo na kobanda lisolo, tokoki kosalela moko oyo ekokani na maloba ya mibale na motó ya likambo moke “Avenir/Libateli,” na lokasa 2 ya mwa buku “Lolenge nini okoki kobanda mpe kolandisa masolo likolo na Biblia”:
◼ “Tozali kolendisa baninga na biso ya pembeni ete bátalela bomoi kitoko ezali koya oyo Biblia ezali kolaka biso. [Tángá Emoniseli 21:3, 4] Elikya motindo wana ezali kosepelisa yo, boye te? [Tiká ayanola.] Mokapo 19 ya buku oyo ezali komonisa matomba mosusu ya malamu oyo bato ya botosi bakozwa na nse ya Bokonzi ya Nzambe.” Soki moto yango amonisi bosepeli, tólakisa ye buku Bomoi ya seko.
7 Kobongisa maloba mpo na kobanda masolo ya malamu ekopesa biso nzela ya kozwa baoyo bazali na mposa ya boyengebene.—Mat. 5:6.