Bakosɛnga mingi epai na baoyo bapesameli mingi
1 Oyo nde libaku kitoko ya koyeba solo! Lokola tomipesi na Yehova, ‘tozwi etinda ya kosakola nsango malamu.’ (1 Tes. 2:4) Yango epesi biso mokumba monene. Yesu alobaki ete: “Soko mingi epesami na moto, mingi ekolukama epai na ye.”—Luka 12:48b.
2 Maloba oyo mazali solo mpenza! Biso banso tozali kozwa litomba na boyebi ya Liloba ya Nzambe, na bokutani malamu elongo na bandeko na biso mpe na elikya moko kitoko; na yango, tokoki koloba ete basili kopesa mingi epai na biso. Ezali mpe likambo libongi ete básɛnga mingi epai na biso.
3 Tóbatela likanisi malamu mpo na oyo etali mikumba na biso: Basusu bazali kokanisa ete makambo oyo masɛngami na bango maleki ndelo. Yesu Klisto, Motó ya lisangá ya boklisto, azali kotya ‘makambo oyo mazali na ntina’ mpo ete lisangá likoka kotambola malamu. (Ef. 4:15, 16) Andimi biso ete ‘ekanganeli na ye ezali na motau mpe mokumba na ye ezali na bozito te.’ (Mat. 11:28-30) Kati na bolingo na ye, azali komonisa motema mawa epai na baoyo bazali bobele na makoki moke. (Luka 21:1-4) Soki tozali kosala nyonso oyo ekoki na biso, ata soki yango ezali mingi to moke, tokopambwama.—Kols. 3:23, 24.
4 Tómituna ete: ‘Nazali mpenza kotya Bokonzi [ya Nzambe] na esika ya liboso kati na bomoi na ngai? Nazali mpenza kosalela ntango na ngai mpe biloko oyo nazali na yango mpo na kokumisa nkombo ya Nzambe mpe kopesa litomba epai na bazalani? Nazalaka na esengo mingi mpo na kosalela Nzambe to mpo na kosepela na biloko ya mosuni na moimi nyonso?’ Na koyanoláká na bosolo nyonso na mituna wana, tokomonisa soki makanisi ya motema na biso mazali nini.—Luka 6:45.
5 Tóbwaka lisɛnginya ya kosala mabe: Masɛnginya mpe matindiki mpo na kozala moimi, kozala na lokoso mpe kolinga kosepelisa nzoto, emonaná naino boye te lokola lelo. Mokolo na mokolo bizaleli malamu na biso bizali kotyama na komekama, mpe tokoki kotindikama na kosala mabe. Mpo na kolónga mikakatano wana, tosengeli kolɔmba Yehova ete asalisa biso. (Mat. 26:41) Na lisalisi ya elimo na ye, akoki kopesa biso makasi. (Yis. 40:29) Botángi ya Biblia mokolo na mokolo ekopesa lisungi monene. (Nz. 1:2, 3) Ezaleli ya komipesa disipilini mpe ya komipekisa ekokokisa mokumba ya ntina mpenza.—1 Kol. 9:27.
6 Kosuka bobele na kolinga oyo ezali malamu ekoki te, tosengeli lisusu koyina oyo ezali mabe. (Nz. 97:10) Yango elingi koloba ete tosengeli te kokólisa mposa ya kosala makambo mabe. Masese 6:16-19 etángi makambo nsambo oyo Yehova ayinaka. Ezali polele ete moto oyo alingi kosepelisa Yehova asengeli mpe koyina makambo yango. Lokola tozali na libaku kitoko ya kozala na boyebi ya sikisiki ya solo, mposa na biso esengeli kozala ya kosala makambo na boyokani na boyebi yango, kotyáká ntango nyonso makanisi na biso likolo na makambo malamu.
7 Ezali malamu ete tóbɔndelaka na ntina ete ezalela na biso epesa biso nzela ya kozala “ntango nyonso na mingi ya kosala kati na mosala ya Nkolo.” (1 Kol. 15:58, NW) Mingi basili komona ete ebongiseli ya kosala mingi kati na mosala ya Yehova ezali mpenza libateli, mpamba te yango ezali kotikela moto ntango mingi te mpo na kotalela makambo oyo mazangi ntina.
8 Soki totali malamu mpenza, nyonso oyo Yehova azali kosɛnga biso eleki ndelo te. (Mika 6:8) Tozali na bantina mpenza ya komonisa botɔndi na biso mpo na mokumba moko na moko ya mosala. (Ef. 5:20) Na bongo, tozali kokóba ‘kosala mosala makasi mpe kobunda,’ kozaláká na elikya ete mbano na biso ekoleka mpenza makambo nyonso oyo masɛngami epai na biso.—1 Tim. 4:10.