Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/95 lok. 1
  • Batiki te kopesa litatoli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batiki te kopesa litatoli
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Masolo mosusu
  • Toloba mpo na nkembo ya bokonzi na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Lolenge ya sika ya kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Ndenge ya kopesa litatoli malamumalamu na bisika oyo bato bazalaka mingi
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Zalá na molende mpo na ‘kopesa litatoli malamumalamu’
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 9/95 lok. 1

Batiki te kopesa litatoli

1 Nkombo na biso, Bataloli ya Yehova eyebisi soki tozali banani mpe emonisi mosala oyo biso tozali kosala. Tozali kotatola makambo ya Nzambe na biso, Yehova. (Yis. 43:10) Moto na moto asengeli kopesa litatoli yango soki alingi ete akóma mosangani ya lisangá. Litatoli lizali kopesama libosoliboso na nzela ya mosala na biso ya kosakola epai na bato banso, oyo esangisi mosala ya kosakola ndako na ndako, litatoli ya balabala, bozongeli ya sika mpe boyekoli ya Biblia. Biso banso tolendisami na ntina mpenza ete tóyeisa monene bosangani na biso kati na mosala ya kosakola.—1 Kol. 15:58.

2 Nzokande, bamoko kati na basangani ya lisangá bazali na makoki mingi te. Bokɔnɔ makasi to mbeba ya binama mosusu ya nzoto ekoki kofandisa bango na ndako. Botɛmɛli ya libota ekoki mpe kozala epekiseli monene. Elenge moklisto moko akoki kozongisama nsima na moboti moko oyo azali mondimi te. Baoyo bafandaka na bitúká oyo bitangwi, kozanga likoki ya kofuta transport, bakoki komiyoka ete bazali mpenza na nkaká. Kozaláká na ezaleli ya nsɔninsɔni, basusu bakoki kokakatana mpo na kopesa litatoli. Basakoli oyo bazwami na makambo motindo wana, to kati na makambo mosusu oyo makokani na yango, bazali mbala mosusu komiyoka ete bazali na makoki te, mpo ete bazali kosala mingi te lokola bamosusu mpe ete mosala na bango ezali mpenza na nse ya oyo bazalaki na mposa ya kosala. Ezali na ntina te ete bátalela milende na bango ete mizali mpamba. (Gal. 6:4) Bakozwa kobɔndisama na koyebáká ete, ata soki bazali kati na ezalela nini, Yehova azali na esenge ntango bazali kosala oyo ekoki na bango.—Luka 21:1-4.

3 Tóluka mwango mpo na kosangana: Ezali na masoló mingi mayebisami oyo mamonisi ete bato oyo bazalaki kati na bizalela ya makambo ya mpasi batikaki te ete mikakatano mipekisa bango kopesa litatoli. Komonisáká ete bazali bato oyo bayebi kobandisa makambo, bakanisaki likolo na myango ndenge na ndenge ya kopesa litatoli ya libaku malamu. Baoyo bazangi makoki ya kobima epai na bango basalelaki telefone mpo na kofungola ekuke oyo ezali komema kino kopesa litatoli. Bazali kotalela mopaya nyonso ete akozala moyoki malamu. Atako mwasi oyo libota lizali kosala botɛmɛli akoki te kosakola na ndako na ye, nzokande akoki kosimba mabaku oyo azali na yango ya kosolola elongo na baninga na ye ya pembeni to elongo na bato mosusu oyo azali kokutana na bango na bisika oyo azali kokokisa misala na ye ya mokolo na mokolo.

4 Elenge moklisto moko akoki komona ete moboti na ye oyo azali mondimi te apekisi ye kopesa litatoli epai na bato. Na esika ya komona yango ete ezali epekiseli oyo ekoki kolongama soko moke te, akoki nde kosala ete baninga na ye mpe balakisi na ye bákóma “teritware” na ye moko, kopesáká litatoli malamu mpe mbala mosusu kotambwisáká ata boyekoli ya Biblia. Mingi kati na baoyo bazali kofanda na bisika bitangwi bapesaki litatoli na nzela ya nkoma. Baoyo bapusami na molende ya boklisto bazali ntango nyonso koluka mwango moko oyo mokosalisa bango ete bákóma te “bato balɛmbi to bazangi kobota mbuma na oyo etali boyebi ya sikisiki ya Nkolo na biso Yesu Klisto.”—2 Petelo 1:8, NW.

5 Na oyo etali bosangani na biso kati na mosala ya kopesa litatoli, Yehova apesi biso banso etamboli oyo tosengeli kolanda; yango ezali ya kosala mosala na ye ‘na molimo na biso mobimba.’ (Kols. 3:23) Ntango oyo tozali kolekisa kati na yango mpe mosala oyo moko na moko na biso azali kokokisa ekeseni, kasi eloko oyo ezali kopusa biso ezali bobele moko: Bolingo ya solosolo oyo euti na “motema malamu.” (1 Nta. 28:9; 1 Kol. 16:14) Soki tokosala nyonso oyo ekoki na biso, tokozala ata na ntina moko te ya kokanisa ete, lokola tozali kosala moke, tozali bato bazangi kondima to bato bazangi ntina kati na lisangá. Lokola Paulo, tokoki koloba na bosembo nyonso ete ‘totikaki te kosakola makambo oyo makoki kopesa litomba, mpe totikaki te koteya liboso na bato.’—Misala 20:20.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto