Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/95 lok. 2
  • Makita ya Mosala mpo na Setɛmbɛ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya Mosala mpo na Setɛmbɛ
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 4 Setɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 11 Setɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 18 Setɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 25 Setɛmbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 9/95 lok. 2

Makita ya Mosala mpo na Setɛmbɛ

Pɔsɔ ebandi na 4 Setɛmbɛ

Loyembo 25

10 mn: Mayebisi mpe Mayebisi matali Mosala na biso ya Bokonzi.

18 mn: “Bakosɛnga mingi epai na baoyo bapesameli mingi.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lendisá bandeko mibali mpe basi oyo bazali kokokisa masɛngami ete bámityela mokano ya kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ.

17 mn: “Tósakola ‘maloba ya esakweli.’” Talelá makambo ya ntina. Sɛngá na bayangani ete báyebisa lolenge basalelaki to batikaki buku Emoniseli: kokokana na yango. Lendisá moto moko na moko na kozala na mɔ́tɔ ntango azali kolakisa buku wana, mpamba te yango ezali kolobela makambo mazali kobima na mikolo ya lelo, oyo matali bato banso. Bongisá elakiseli moko to bilakiseli mibale na kolandáká makanisi oyo mapesami. Maloba ya nsuka.

Loyembo 31 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 11 Setɛmbɛ

Loyembo 24

10 mn: Mayebisi. Lapolo ya kɔnte.

15 mn: “Batiki te kopesa litatoli.” Lisolo elongo na bayangani. Monisa polele ete atako biso banso tokoki kopesa ntango ndenge moko te kati na mosala ya kosakola, nzokande tosengeli kosepela na yango mpe kosala makasi mpo na kosangana kati na yango na molimo na biso mobimba.

20 mn: “Betele ezali na mposa ya basali na bolingo malamu.” Ekosalema na mituna mpe biyano, kobanda na paragrafe 1 kino paragrafe 7. Maloba ya nsuka.

Loyembo 36 mpe libɔndeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 18 Setɛmbɛ

Loyembo 40

15 mn: Mayebisi. Elakiseli: Libota moko lizali kosalela Annuaire 1995. Basangani ya libota bazali komonisa botɔndi mpo na buku yango; tata azali kolobela na mokuse masolo mingi ya kobenda likebi oyo mayebisami kobanda na lokasa 3 kino lokasa 11. Bazali bango banso kotalela lolenge oyo bakoki kosala mpo na kotánga mwa bankasa ya Annuaire kati na libota pɔsɔ na pɔsɔ mpe kondimisama ete bakozala ntango nyonso kotalela mokapo oyo mopesami kati na mwa buku Tótangaka Makomami mokolo na mokolo.

15 mn: Mposa ya lisangá to lisukulu litongami likolo na lisolo “Bófuta mpako epai na baoyo bakoki kozwa mpako,” oyo libimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 1994, kobanda na lokasa 26 kino lokasa 28.

15 mn: “Tósalisa bazalani ete ‘bátosa makambo makomami.’” Talelá makambo ya ntina. Elakiseli moko to bilakiseli mibale na kolandáká makanisi oyo mapesami. Maloba ya nsuka.

Loyembo 52 mpe libɔndeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 25 Setɛmbɛ

Loyembo 205

5 mn: Mayebisi.

20 mn: “Betele ezali na mposa ya basali na bolingo malamu.” Paragrafe 8 mpe 9 ekomonisama na elakiseli: kosaleláká makanisi oyo mapesami, tata moko azali kosolola elongo na mwana na ye ya mobali oyo azali naino elenge na ntina na mokano ya mosala na Betele mpe azali komonisa ye lolenge akoki komibongisa mpo na yango. Soki lisangá ezali na Basali na Betele, to baoyo bazalaki kala Basali na Betele, tata akoki kobyanga moko to mibale kati na bango mpo na kosangana na lisolo. Nsima na elakiseli, paragrafe 10 kino paragrafe 13 ikotalelama na mituna mpe biyano.

20 mn: Tólakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! na Ɔkɔtɔbɛ. Kati na bateritware oyo esalamaka mingi, tokoki mpe kolakisa mwa buku nyonso ya monene (longola bobele mwa buku L’ école). Soki moto moko amonisi bosepeli na ntango ya bozongeli ya sika, ekoki kosalema ete tólakisa ye abonema. Zongela mwa makanisi oyo na ntina na kolakisama ya bazulunalo ndako na ndako: kozala na mwa koseka ya boninga; kozala na mɔ́tɔ; kozanga koloba mbangumbangu; kolakisa bobele lisolo moko kati na zulunalo moko; kopesa moto yango bazulunalo ete asimba; koyebisa ye ete tokozonga mpo na kolakisa ya banimero oyo ekolanda; kosukusa lisolo na lolenge ya malilimalili te ntango moto aboyi kozwa bazulunalo; kozwa nɔti ya bosepeli nyonso oyo emonisami mpe ya mokanda nyonso oyo etikami. Elakiseli moko to bilakiseli mibale bikosalema na nsuka ya lisolo mpo na komonisa lolenge ya kolakisa banimero ya sika ya bazulunalo. Maloba ya nsuka.

Loyembo 176 mpe libɔndeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto