Mayebisi
▪ Lipesi ya Febwáli: Mwa babúku. Mársi: Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis. Apríli: Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis mpe mwa babúku. Máí: Les Saintes Écritures—Traduction du monde nouveau elongo na búku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? Yúni: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo.
▪ Mikanda ya sika oyo mizali kati na libombi ya mikanda:
Uruund (lunda): Sepela na bomoi ya seko na mabele!
▪ Lokola esakolamaki kati na Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya Febwáli, lisukúlu moko sipesiale ekopesama kati na masangá nyonso na mwalomingo 23 Apríli 1995. Motó na likambo na yango elobi ete “Nsuka ya mangomba ya lokuta ebelemi.” Tokosenzela ete tóbyanga baoyo nyonso bakoyangana na Ekaniseli mbula oyo. Tokosala nyonso mpenza mpo na kosunga mingimingi bamilió na bato oyo bazali koyekola Biblia. Makanisi makopesama nsima ya likita yango oyo esengeli kopusa bango, bakisa mpe bandeko mibali nyonso, ete básangana mingi kati na kampanye ya kopalanganisa trakte moko ya sipesiale. Bobele na ntango wana, likebi likobendama likoló na mikakatano oyo moto na moto azali kokutana na yango mpe likoló na ntina ya kosala na ekateli nyonso na boyokani elongo na Liloba ya Nzambe.
▪ Osili kokomisa nkombo na Eteyelo ya mosala ya teokrasi? Soki olingi kosala yango, yebisa yango na mokengeli na eteyelo. Masengemi mpo na kokomisa nkombo eyebisami kati na búku Lisanga, lokasa 74, paragrafe 2.