Makita ya mosala ya Mársi
Pɔ́sɔ ebandi na 6 Mársi
10 mn: Maloba ya ebandeli, mayebisi mpe Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi.
20 mn: “Tókolisa mosala na biso ya motuya.” Mokɛngɛli na mosala mpe nkulutu moko bazali kotalela makanisi ya ntina ya lisoló. Bótalela lisusu mosala ya lisangá na boumeli ya sanza motoba oyo euti koleka. Bopesa longonya na basakoli mpe bopesa batoli mpo na kosalisa bango ete bakola. Bómonisa polele ete mokano na biso ezali ya kobakisa bosangani na biso kati na mosala ya kosakola.
15 mn: “Tólona mposa mpo na búku Bomoi ya seko.” Basakoli misato to minei, moko na bango elenge, bazali kotalela lisoló, mpe bazali kosala bilakiseli mpo na komimesenisa; bazali kosalela ebandeli mibale to misato ya masoló, na nsima bazali kopesa makanisi. Bazali kopesana batoli mpe longonya. Maloba ya nsuka.
Loyembo 120 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 13 Mársi
5 mn: Maloba ya ebandeli mpe mayebisi.
20 mn: “Tokoki mpenza kokumisa Yehova mingi na Apríli?” Ekosalema na mituna mpe biyano. Túna baoyo bazalaki babongisi-nzela basungi na mikolo mileki. Bakolimbola lolenge nini bamibongisaki mpo na kosalela libaku kitoko wana. Lendisa baoyo nyonso bazali kokana kozala babongisi-nzela basungi na Apríli ete batondisa lokasa ya lisengi mwa mikolo liboso kozanga koumela.
20 mn: Bamposa ya lisangá, to lisukúlu etongami na lisoló “Ndelo etyameli yo, elembisaka yo?”, oyo ebimaki kati na Linɔngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛ́mbɛ 1994, nkasa 27 kino 28. Maloba ya nsuka.
Loyembo 123 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 20 Mársi
10 mn: Maloba ya ebandeli, mayebisi mpe lapólo ya mosolo ya lisangá mpe matɔ́ndi mpo na makabo ya bolingo malamu.
15 mn: “Tósalela malamu mwa búku ya sika.” Lisoló elongo na bayangani. Monisá polele makambo oyo mazali kokesenisa mwa búku yango mpe pesá makanisi mpo na lolenge mingi ya kosalela yango na ntina na kolendisa bato oyo bazali na mawa.
20 mn: “Tóbanda boyekoli ya Biblia na kosaleláká búku Bomoi ya seko.” Lisoló elongo na bayangani. Bosala bilakiseli mibale na kosaleláká kolakisama oyo epesami na kati. Maloba ya nsuka.
Loyembo 134 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 27 mársi
10 mn: Maloba ya ebandeli mpe mayebisi. Sɛngá bayangani ete báyebisa masoló mikuse oyo mazali na boyokani na lipesi ya búku Bomoi ya seko to boyekoli ya Biblia oyo ebandaki na lisalisi ya búku yango.
20 mn: “Tókumisa mobotami ya liboso ya Yehova!” Nkulutu moko azali kotalela lisoló na mituna mpe biyano na mɔ́tɔ mpenza mpe na esengo. Azali kolendisa bayangani ete bakoma nkombo ya bato oyo bakobyanga na Ekaniseli mpe na lisukúlu ya bato banso na lomingo oyo ekolanda. Elakiseli oyo ekozongela makanisi ya paragrafe 7: Mosakoli moko abelemi epai na mobali moko oyo akómi na Ndako ya Bokonzi mpe azali kotala zingazinga na ye. Mosakoli ayoki ete moto yango alendisamaki na ndeko na ye moko oyo afandaka na engumba mosusu mpo ete aya na Ekaniseli. Asengi mobali yango ete afanda penepene na ye mpe libota na ye mpo ete akoka kolanda elongo na bango kati na Biblia mpe na búku ya loyembo. Mosakoli ayebisi ye ete nsima ya likita akoyanola na motuna nyonso oyo akoki kozala na yango. Sukisá na koyebisáká ngonga oyo lisangá ekosala Ekaniseli.
15 mn: Tókabola Linɔngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuka! Bazulunalo na biso ezali kokokisa mokumba moko ya ntina kati na mosala ya kosakola na mokili mobimba; bamilió ya bato bayebaki solo mpo na mbala ya liboso na nzela na yango. Monisá polele ntina ya kosalela mingi bazulunalo mpe kokabola yango ndako na ndako ata soki lipesi ya sanza ezali mokanda mosusu. Lobela matomba malamu ya mokolo ya zulunalo kati na pɔ́sɔ. Limbola lolenge nini mosala ya kosakola kati na nzela mpe na magazini ezali kopesa mabaku mingi ya kotika bazulunalo. Kundwela basakoli ntina ya kozwa banoti na kozaláká na mokano ya kokoma nkombo ya bato oyo babongi ete totikela bango bazulunalo sanza na sanza. Limbola ete tokoki kokabola abonema na ntango ya bozongeli ya sika soki moto asepeli solo mpenza. Lobela polele ntina ya komibongisa malamu liboso ya kokende kosakola. Bilakiseli: basakoli misato, bakisa mpe elenge moko na kati, bazali kolakisa na bokuse bazulunalo. Maloba ya nsuka.
Loyembo 137 mpe libondeli ya nsuka.