Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/95 lok. 3
  • Tósalela malamu mwa búku ya sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósalela malamu mwa búku ya sika
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Masolo mosusu
  • Tósalisa bazalani na biso ete bálendisama
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Tómekola Yehova na komibanzabanzáká mpenza mpo na bazalani na biso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Tóbɔndisa baoyo bakufeli moto
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Ndenge ya kosalela mwa buku ya sika Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 3/95 lok. 3

Tósalela malamu mwa búku ya sika

1 Na boumeli ya liyangani na biso ya etúká oyo euti koleka, tozalaki na esengo ya kozwa mwa búku Ntango moto oyo olingaka akufi. Yango esengeli kosepelisa bato ya lolenge nyonso, mpamba te mingi bazali konyokwama mpo ete basili kobungisa molingami na bango moko. Bafoto na yango mpe bililingi na yango kitoko esengeli kopesa nzela na kotika yango kozanga nkaka. Elilingi kitoko oyo ezali komonisa lisekwa ya Lazalo kati na bakufi emonisi ‘mposa makasi oyo Yesu azali na yango mpo na kosilisa mbeba nyonso euti na liwa.’ Elilingi etyami na lokasa mobimba oyo elandi ezali komonisa etaliseli kitoko ya lisekwa kati na mokili ya sika. Ekopesa esengo mpenza na mitema ya baoyo bazali na mawa!

2 Mwa búku wana ekozala mpenza lisalisi monene mpo na kolendisa bato oyo bazali na mawa. Ebongisami mpo na lisoló. Mituna oyo mibongisami mpo na komonisa polele makanisi ya ntina mizwami kati na etandá na nsuka ya eteni nyonso na esika ete ezala na nsé ya lokasa. Tokoki kosalela “Mituna wana oyo mizali kopusa na kokanisa” na lolenge oyo tokomona ete ebongi mpo na moto oyo tozali koyekola elongo na ye Biblia.

3 Na ntango ya bozongeli ya sika, tópona kotalela makanisi oyo mauti na mwa búku yango. Mbala mosusu tokomona malamu kolakisa epai na molobani na biso kolandana ya masoló na lokasa 2 mpe kosɛnga na ye ete apona lisoló oyo lisepelisi ye. Tózala na mayoki malamu mpo na bamposa ya moto na moto. Tótika moto yango ete ayebisa mayoki na ye, mpe na nsima tómonisa ye elendiseli nini mwa búku oyo ezali komema. Eteni moko na moko ezali kosalela ebele na mikapo oyo mizali kondimisa elikya na biso.

4 Motó na likambo moke ya lokasa 5, “Elikya ya solo ezali?” ezali kobenda likebi likoló ya elaka kitoko etali bakufi, elaka oyo etongami likoló na Biblia. Yango esengeli kolamwisa mposa mpo na kotalelama ya eteni “Elikya ya solo mpo na bakufi,” lokasa 26 kino 31. Etandá ya lokasa 27 ezali komonisa “Mikapo misusu ya kolendisa.” Moto oyo azali na mawa akososola nokinoki ete Yehova azali mpenza “Njambe na kobɔndisa yɔnsɔ.”​—2 Kol. 1:3-7.

5 Na bokengi nyonso, biteni ya katikati bizali kolobela makambo makeseni oyo mabimaka na liwa ya molingami moko. Ezali komonisa lolenge nini kolónga mawa na yo mpe lisalisi oyo basusu bakoki kopesa na bantango wana ya mpasi. Etandá ya lokasa 25 ezali na motó ya likambo “Tósalisa bana ete báyika mpiko na ntango liwa likwei.” Yango ebongi mpenza kosunga baboti oyo bakokutana na mokakatano wana.

6 Tóbomba moko na mwa búku yango mpo na biso, mpe tósalela yango kati na mosala ya kopesa litatoli na libaku malamu. Mbala mosusu tokolinga mpe kokende na babiro oyo etalaka makambo ya bokundi bibembe oyo ezali kati na teritware na biso mpo na kokabola yango na basali yango ete balendisa mabota oyo bazali na mawa. To mpe tokoki kobanda masoló na bokengi nyonso elongo na bato oyo bazali na mawa kati na malita na ntango bazali kouta na nkunda ya molingami moko.

7 Tozali na esengo mpo ete Yehova azali Nzambe “oyo azali kobondisa baoyo bakweisami na nse.” (2 Kol. 7:6) “Kolendisa baoyo nyonso bazali kati na mawa” ezali kotalelama epai na biso lokola libaku kitoko.​—Yis. 61:2, NW.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto