Likambo lileki ntina kati na lisoló ya bato
1 Yesu ayaki awa na mabelé na litambwisi ya Tata na ye, mpo na kopesa litatoli na solo oyo ekoki komema biso na bomoi ya seko. (Yoa. 18:37) Na kotikaláká sembo kino liwa, akumisaki Yehova, asantisaki nkombo na Ye mpe apesaki mbeka. (Yoa. 17:4, 6) Nyonso wana esali ete liwa ya Yesu ezala likambo lileki ntina kati na lisoló ya bato.
2 Kati na mibali oyo bazalaki na bomoi awa na mabelé banda na kozalisama ya Adama, bobele mibali mibale nde bazalaki na kokoka. Adama akokaki kopesa na bakitani na ye likoki ya kozwa matomba kitoko. Na esika ete ezala bongo, atombokaki na moimi mpenza na kotyáká bango kati na bomoi ya mpasi oyo ezali kosuka na liwa. Ntango Yesu ayaki awa na mabelé, amimonisaki mpenza moto ya sembo mpe moto na botosi, kopesáká na baoyo nyonso bakozala na kondima likoki ya kozala na bomoi ya seko.—Yoa. 3:16; Lom. 5:12.
3 Likambo mosusu te ekoki kokokanisama na liwa ya mbeka ya Yesu. Liwa yango libongoli lisoló ya bomoi ya bato. Na nzela na yango, bamiliare ya bato bakoki kosekwisama longwa na bakufi. Liwa yango lizali kotya moboko ya Bokonzi moko ya seko oyo ekosilisa mobulu mpe ekokómisa mabelé paladiso. Na nsuka, ekolongola bato na lolenge nyonso ya monyoko mpe ya boombo.—Nz. 37:11; Mis. 24:15; Lom. 8:21, 22.
4 Nyonso wana ezali kosalisa biso na koyeba mpo na nini Yesu apesaki etindá na bayekoli na ye ete bákanisaka liwa na ye na molulu ya Ekaniseli mbula na mbula. (Luka 22:19) Koyebáká ntina na yango, tozali kozela na motema likoló ete tóyangana lokola ekosalama na masangá ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba, na mwamibale 2 Apríli, nsima ya kolala ya moi. Liboso, ekozala malamu kotánga kati na libota lisoló ya Biblia oyo lizali kolobela mikolo ya nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabelé mpe lolenge abatelaki ekateli makasi mpo na solo. (Mikapo ya Biblia oyo mikotángama mizwami kati na Manáka 1996, kobanda mwa 28 Mársi kino 2 Apríli.) Yesu atikelaki biso ndakisa na ntina etali kosambela Mozalisi. (1 Pet. 2:21) Tósala nyonso oyo ekoki na biso mpo na kobyanga bayebani na biso mpe libota na biso, bakisá mpe bayekoli ya Biblia mpe bato mosusu oyo balingi ete báya na likita yango ya ntina. Tóyebisa bango liboso lolenge oyo makambo makoleka mpe ndimbola ya límpa mpe vinyo.—1 Kol. 11:23-26.
5 Bankulutu basengeli liboso komibongisa malamu mpo na kondimisama ete Ndako ya Bokonzi ekozala pɛto mpe na molɔngɔ́. Esengeli kolengela ete moto moko apesa límpa mpe vinyo. Boleki ya límpa mpe ya vinyo esengeli kobongisama malamu. Makanisi ya sikisiki na lolenge ya komonisa limemya mpo na Elambo ya Nkolo mazwami kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwáli 1985, lokasa 17, ebimeli ya Lifalansé. Ekozala malamu ete lisangá básala ebongiseli mpo na kosakola mingi na boumeli ya mwa mikolo liboso mpe nsima ya Ekaniseli.
6 Na mobu moleki, bato 13 147 201 bayanganaki na molulu ya ekaniseli ya likambo wana ya ntina mingi. Lokola ezali mokolo moleki ntina na mobu, biso nyonso tosengeli kozala wana.