Makita ya Mosala na Mársi
Pɔ́sɔ ebandi na 4 Mársi
5 mn: Mayebisi ya lisangá mpe mayebisi mazali kati na Mosala na biso ya Bokonzi.
13 mn: “Tósakola solo mokolo na mokolo na ndakisa ya Yesu.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Tángá paragrafe 5.
10 mn: “Libongoli ya mokili ya sika na Lifalansé esembolami lisusu.” Lisoló ya mɔ́tɔ ekosalema na mituna mpe biyano kobanda na paragrafe 1 kino 7 ya libakema.
17 mn: “Tósunga basusu ete bázwa matomba.” Talelá bilakiseli bipesami. Salá bilakiseli mibale ya mokuse.
Loyembo 14 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 11 Mársi
10 mn: Mayebisi. Lapólo ya kɔ́nti. Yebisá bibongiseli oyo bikamatami mpo na mosala ya kosakola na wikende.
12 mn: “Likambo lileki ntina kati na lisoló ya bato.” Lisoló elongo na bayangani. Kundolá bibongiseli oyo bikamatami kati na lisangá mpo na Ekaniseli. Yebisá ntina oyo tosengeli kobyanga bato oyo bamonisaka bosepeli na solo mpe kosunga bango ete báyangana na Ekaniseli.
10 mn: Lobelá na bokuse makambo mazali kati na etánda “Bokundoli epai na mokomeli mpe mokɛngɛli na mosala.”
13 mn: “Libongoli ya mokili ya sika na Lifalansé esembolami lisusu.” Lisoló na mɔ́tɔ mpenza ekosalema na mituna mpe biyano kobanda na paragrafe 8 kino 13 ya libakema.
Loyembo 133 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 18 Mársi
12 mn: Mayebisi. Talelá etánda “Tólengela Ekaniseli.”
15 mn: “Tózwa litomba na Eteyelo ya mosala ya teokrasi na 1996—Eteni 2.” Lisukúlu. Ekosalema na mokɛngɛli na eteyelo. Bɛtá nsɛ́tɛ likoló na kotánga Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo.
18 mn: “Tósalela bazalani na biso malamu na kolandáká bosepeli nyonso.” Talelá bilakiseli bipesami mpo na bozongeli ya sika. Ndeko mobali oyo apesameli eteni oyo ya likita akosolola na basakoli mibale to misato na makambo oyo bakoloba, na nsima akosɛnga na bango ete bámeka kosalela bilakiseli oyo baponi.
Loyembo 53 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 25 Mársi
10 mn: Mayebisi. “Manáka ya liyangani ya mokolo moko ya mbula oyo.” Lendisá moko na moko ete ayangana na yango. Kundolá ntina ya kosunga bato basepeli ete báya koyangana na Ekaniseli. Lendisá moko na moko ete asala milende ekoki mpo na kosakola na wikende.
20 mn: Tóbongisa kolakisama ya kobenda likebi. Mokɛngɛli na mosala to nkulutu mosusu akosolola na basakoli mibale to misato likoló na matomba oyo ezalaka na kosaleláká kolakisama oyo etateli likambo moko na esika oyo bofandi. Na ndakisa, masoló oyo malobelami na ntina na bansango ya mboka mpe matali milende oyo misalemi mpo na kobongisa bomoi ya bato; bokóli ya mikakatano kati na mabala, mobulu ya bilenge, kozanga mosala, kokwea ya nkita, mpe bongo na bongo; nsango ya mboka oyo ezali kolimbola ntina oyo bato mingi bazali kondima bato ya politíki te mpe ya mangomba te. Tángá makambo oyo kala mingi te makómelaki bato na teritware mpe lobelá lolenge oyo ekoki kosalelama mpo na kobanda lisoló.
15 mn: “Libongoli ya mokili ya sika na Lifalansé esembolami lisusu.” Lisoló na mituna mpe biyano kobanda na paragrafe 14 kino 21 ya libakemá.
Loyembo 151 mpe libondeli ya nsuka.