Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/07 lok. 1
  • “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai”
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Masolo mosusu
  • “Bókoba kosala boye”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Yehova apambolaka milende oyo tosalaka mpo na kosala Ekaniseli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Salisá basusu bázwa litomba na lisiko
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Ntina oyo toyanganaka na Ekaniseli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 3/07 lok. 1

“Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai”

Tokokanisa liwa ya Yesu na mokolo ya 2 Aprili

1. Mpo na nini mwa 2 Aprili 2007 ezali mokolo ya ntina mingi?

1 Na mokolo ya 2 Aprili 2007 bamilio ya bato na mokili mobimba bakoyangana mpo na kokanisa liwa oyo Yesu akufaki lokola mbeka. Yesu akufaki mpo amipesaki mobimba na boyangeli ya Tata na ye ya likoló, mpe na ndenge yango amonisaki ete Satana Zabolo azali mobuki ya lokuta mpo alobaki ete bato basalelaka Nzambe kaka mpo na bolamu na bango moko. (Yobo 2:1-5) Bolei ya Mpokwa ya Nkolo ekundwelaka mpe biso ete na nzela ya liwa na ye, Yesu moto ya kokoka mpe oyo azangaki lisumu, ‘apesaki molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.’ (Mat. 20:28) Yango wana, Yesu apesaki bayekoli na ye etinda ete: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” (Luka 22:19) Botɔndi na yo mpo na likabo kitoko wana ya Nzambe ezali kotinda yo obanda komibongisa mpo na kokanisa bolingo monene oyo amonisaki?​—Yoa. 3:16.

2. Ndenge nini tokoki kobongisa mitema na biso mpo na Ekaniseli?

2 Bongisá motema na yo: Soki totaleli makambo oyo esalemaki na mokolo mokomoko ya mikolo ya nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabelé, tokoki kobongisa mitema na biso mpo na kokanisa liwa na ye. (Ezl. 7:10) Mpo na kosalisa biso tósala bongo, batyeli biso programɛ moko ya botángi ya Biblia na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo​—2007 mpe na Calendrier 2007. Makambo oyo tokotánga na programɛ yango eyokani mpenza na makambo oyo esalemaki mwa mikolo liboso Yesu akufa, na kotalela Calendrier oyo tozali kosalela lelo oyo. Mikolo mpe badati oyo elobelami na masolo ya Biblia ezali ya Calendrier ya Bayuda, oyo batángaka mokolo banda kolala ya moi tii kolala ya moi ya mokolo oyo elandi. Totalelaki bokeseni yango mpe toyokanisi yango na programɛ ya botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli. Soki tolandi botángi yango ya Biblia mpe tomanyoli bolingo monene ya Nzambe na libondeli, tokozwa mpenza matomba na Ekaniseli.

3. Ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo bandimaki libyangi mpe baoyo batiká kosakola bázwa matomba na Ekaniseli?

3 Bengisá basusu na Ekaniseli: Siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Febwali elobelaki kampanye monene oyo tokosala mpo na kobengisa bato na molulu wana ya ntina mingi. Osili kozwa bibongiseli mpo na kosala mingi na kapanye yango? Osili kokoma nkomba ya bato oyo oyebani na bango, oyo okobengisa na Ekaniseli, mpe osili kokutana na bango? Salá makasi okóma na esika ya Ekaniseli na ngonga ya malamu mpo na koyamba bato oyo obengisaki mpe baoyo bandimaki libyangi. Okoki kofanda esika moko na bango, mpe kosalisa bango bázwa Biblia mpe buku ya nzembo. Lakisá bango bandeko mosusu ya lisangá. Na nsima ya Ekaniseli, zwá ntango ya koyanola na mituna na bango. Bengisá bango na lisukulu ya ntina mingi oyo ekosalema na mokolo ya 15 Aprili. Mingimingi, bankulutu bakosala nyonso bábengisa bato oyo bayaka lisusu na lisangá te mpe batiká kosakola, mpo báyangana na Ekaniseli mpe na lisuku oyo esalemaka nsima ya Ekaniseli.

4. Nsima ya Ekaniseli, ndenge nini tokoki kosalisa bato bákoba kokola na elimo?

4 Salisá bato ya sika mpe baoyo batiká kosakola bákola na elimo: Ndeko oyo akosala lisukulu ya Ekaniseli akolimbola na mokuse ebongiseli ya koyekola na bato Biblia mpe akolendisa bato ya sika ete bákoba koyekola makambo ya Yehova. Okoki kosalela makambo oyo akoloba mpo na kosalisa bato oyo obengaki bándima koyekola lisusu makambo mingi etali Yehova. Soki bayekolaka Biblia te, zongelá bango nokinoki na nsima ya Ekaniseli mpe monisá bango ndenge oyo toyekolaka na bato Biblia ofele. Mpo bato yango bákola na elimo, esengeli mpe báyanganaka na makita ya lisangá. (Ebe. 10:24, 25) Na bongo, lendisá bango báyanganaka na makita nyonso. Bankulutu bakobongisa mpo na kotala baklisto oyo batiká kosakola, oyo bayanganaki na Ekaniseli mpe kosalisa bango bátalela lisusu malamumalamu makambo oyo elobamaki na lisukulu. Yango ekoki kolendisa bango bázongela lisusu milende na bango na lisangá.

5. Koyangana na Ekaniseli ekoki kopea biso matomba nini?

5 Ekaniseli epesaka biso libaku ya kokanisa na mozindo makambo oyo Yehova mpe Yesu basili kosala mpo na kobikisa biso. Komanyola ndenge wana, etindaka biso tólinga Yehova lisusu mingi mpe tózala na etamboli ya malamu. (2 Kol. 5:14, 15; 1 Yoa. 4:11) Sikoyo nde ntango ya kozwa bibongiseli mpo na biso moko mpe mpo na bato oyo bakondima koya na molulu wana ya ntina mingi, oyo na boumeli na yango ‘tosakolaka liwa ya Nkolo.’​—1 Kol. 11:26.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto