Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/95 lok. 1
  • Tóbatela bomoko oyo tozwi na lisalisi ya Bokonzi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóbatela bomoko oyo tozwi na lisalisi ya Bokonzi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Masolo mosusu
  • Nini ezali kosala ete baklisto bázala na bomoko ya solosolo?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Bomoko ya bokristo epesaka Nzambe nkembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Tóbatela bomoko na mikolo oyo ya nsuka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Bomoko ezali elembo ya losambo ya solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 10/95 lok. 1

Tóbatela bomoko oyo tozwi na lisalisi ya Bokonzi

1 Bokonzi ya Nzambe ezali boyangeli ya solo, oyo ezali na makoki mpe na nguya. Yango ezalaki motó ya likambo ya mosala ya kosakola oyo Yesu asalaki. (Mat. 4:17) Mosala ya Yesu ezalaki libosoliboso ya koteya mpe ya kopesa litatoli na ntina na solo ya Bokonzi. Yesu alakisaki biso kosambela mpo na Bokonzi mpe kokoba koluka yango liboso. (Mat. 6:9, 10, 33) Soki totikali penepene na Yehova mpe na lisangá na ye, to soki tokokisi mokumba na biso ya kosakola mpe soki tosangani na mokili te, tokokoka kobatela bomoko oyo tozwi na lisalisi ya Bokonzi. Na misala mpe na maloba na biso, tokomonisa ete tosili komitya na ngámbo ya Bokonzi mpo na kotombola yango.​—Yoa. 18:37.

2 Uta mobu 1914, Bokonzi esili kokóma likambo ya solo mpo na bamilio ya bayangelami na yango. Bomoko oyo ezali komonana kati na bango ekeseni mpenza na makambo oyo mazali koleka na mokili ya lelo oyo mosili kokabwana. Mpo ete yango ekoka kozala nguya oyo ezali kopesa bomoko, Bokonzi esengeli kozala likambo ya solo mpo na biso. Mpo na nini yango ezali likambo ya solo na miso na biso?

3 Lokola boyangeli nyonso ezalaka na mibeko, Bokonzi ya Nzambe mpe ezali na mibeko na yango. Nzokande, mibeko ya Bokonzi yango mizwami kati na Biblia. Botángi ya mokolo na mokolo ya Liloba ya Nzambe ezali kokundwela biso makambo oyo masɛngami epai na bayangelami ya Bokonzi. Boyekoli ya moto na moto ya mikanda mpe malako oyo tozali kozwa uta na “moombo ya sembo mpe ya mayele” ezali kosalisa biso na kotosa mibeko ya Nzambe kati na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. (Mat. 24:45) Soki tozali kosalela makambo oyo tozali koyekola, Bokonzi ekokóma lisusu likambo ya solo na miso na biso. Na bongo, tokoyeisa makasi nsinga na biso ya bondeko oyo esangisi biso na mikili ndenge na ndenge mpe tokosala libota ya bomoko ya basambeli oyo bazali kotosa Yesu.

4 Mosala ya kosakola etii bomoko kati na biso: Tosili kozwa etinda ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi “kino nsuka ya mokili.” (Mis. 1:8) Kosakola na ‘likanisi moko’ ezali kotya bomoko kati na biso mpamba te tozali kosala makasi mpo na ‘kokumisa’ Yehova. (Lom. 15:5, 6) Soki tozali kosala na bomoko elongo na bandeko na biso ya mokili mobimba, tokolendisa kondima na biso mpe tokopesa na elimo ya Yehova likoki ya kosala kati na biso mpo na kokokisama ya mikano na ye. Na ‘kozaláká ntango nyonso na mosala mingi kati na mosala ya Nkolo,’ ‘tokotɛlɛma ngwi, tokoningana te.’​—1 Kol. 15:58.

5 Kati na mikili mingi, Satana azali komeka kobebisa bomoko na biso na kokangáká nzela ya mosala ya kosakola. Azali kosalela myango nyonso oyo azali na yango mpo na kozangisa boyokani mpe kobimisa matata oyo makosala ete koswana mpe kowelana ezala. (Mas. 6:19; Gal. 5:19-21,26) Alingi ete tómikɔtisa na kowelana ya mokili, kutu alingi ete tópesa mpe lisungi na biso na makambo mosusu ya politiki to na makambo matali bato banso. (Yak. 3:14-16) Makomami mazali kolendisa biso ete tótɛmɛla bopusi na ye, soki te akolya biso. (1 Pet. 5:8, 9) Elikya ya Bokonzi esengeli kozala ntango nyonso likambo ya solo kati na elimo na biso mpe na motema na biso.

6 Soki tolingi kobatela bomoko na biso, tosengeli kozala na bosososli malamu mpe kolona mayele mauti na likoló. Ntango tokutani na mikakatano mpe mingimingi soki yango euti na bandeko na biso, tosengeli komonisa mbuma ya elimo mpo na kobatela kimya. Tosengeli kobwaka ezaleli ya lolendo, bilulela mpe bisalasala oyo ezali komonana kati na mokili mpe ezali kobimisa bokabwani. (Ef. 4:1-3; Kols. 3:5-10, 12-14) Tosengeli kotondisa elimo na biso na makanisi ya kokende liboso mpe ya kotonga. Bokonzi ezali mpenza likambo ya solo mpo na biso! Kasi tosengeli kosɛnzɛla mpo ete etikala ntango nyonso bongo.​—Ef. 6:11, 13.

7 Likambo oyo ete elikya ya Bokonzi ezali likambo ya solo ezali kosangisa biso kati na elimo ya bomoko oyo ekoumela seko na seko. Nz. 133:1.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto