Makita ya Mosala mpo na Ɔkɔtɔbɛ
Pɔsɔ ebandi na 2 Ɔkɔtɔbɛ
5 mn: Mayebisi mpe Mayebisi mpo na Mosala na biso ya Bokonzi.
20 mn: “Tómonisa botɔndi mpo na oyo tozali na yango.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Soki ntango ezali, monisá mwa makanisi oyo mapesami kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto 1990, nkasa 19-20, paragrafe 15 kino paragrafe 20.
20 mn: “Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!: bazulunalo oyo ebongi mpo na eleko na biso ya mpasi.” Lisolo elongo na bayangani. Yebisá lisolo moko oyo ezali komonisa ete bato bazali kosepela na bazulunalo yango. (gF91 22/7 lok. 9) Elakiseli: Basakoli mibale bazali moto na moto kobongisa kolakisama moko kati na oyo eyebisami, to kati na mosusu, engebene bazulunalo oyo ezali, mpe bazali komimekisa elongo mpo na koyeba lolenge ya kosala yango.
Loyembo 219 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 9 Ɔkɔtɔbɛ
10 mn: Mayebisi ya konte mpe maloba ya botɔndi mpo na makabo oyo matindamaki na la Société. Lendisá moto moko na moko ete asala makasi mpo na kosakola na nsuka ya pɔsɔ oyo.
20 mn: “Tóbatela bomoko oyo tozwi na lisalisi ya Bokonzi.” Lisolo elongo na bayangani.
15 mn: “Esengo oyo yo mpe okoki kozwa!” Lisolo. Soki ntango ezali, sɛngá na bayangani ete báyebisa masolo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango wana bazalaki kotika batrakte Nsango ya Bokonzi.
Loyembo 150 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 16 Ɔkɔtɔbɛ
5 mn: Mayebisi mpe lapolo ya mosala ya lisangá na boumeli ya sanza eleki.
20 mn: “Moto moko azali nde na mposa ya lisalisi?” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lobelá na mokuse mwa mikano oyo bankulutu bazali kosala milende mpo na kokokisa sikawa kati na likambo litali mosala na bango ya kotaláká bampate. Monisá makambo oyo moko na moko akoki kosala mpo na kopesa lisalisi.
20 mn: “Tóluka baoyo balingi koteyama.” Lobelá ntina ya kosala bozongeli ya sika. Lendisá basakoli ete básalelaka Biblia. Bongisá elakiseli moko to bilakiseli mibale ya mikuse na kolandáká kolakisama oyo epesami.
Loyembo 197 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 23 Ɔkɔtɔbɛ
Lisangá ekosala ebongiseli na yango moko, engebene bamposa na yango.
Pɔsɔ ebandi na 30 Ɔkɔtɔbɛ
10 mn: Mayebisi mpe Biyano na mituna na bino.
15 mn: Bamposa ya lisangá to lisukulu liuti na lisolo “Oyikisaki moto moko mpiko na mikolo oyo?” Liye libimaki kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuali 1995, nkasa 21-23.
20 mn: Tósalaka boyekoli ya libota mbala na mbala. Tata moko ya libota elongo na mwasi na ye bazali komitungisa mpo na kozanga bokoli na elimo oyo bazali komona epai na bana na bango. Tata andimi ete azali na bopɔtu kati na likambo litali kotambwisa boyekoli ya libota: na bantango mosusu, bapɔsɔ mingi elekaka kozanga ete libota lizwa mateya ya Biblia. Bazali kotalela bilendiseli mpe batoli oyo ezali kati na Mokanda mpo na eteyelo ya mosala ya Nzambe, lokasa 36, paragrafe 12-14. Bazali koyokana mpo na kotya boyekoli ya libota na esika ya liboso pɔsɔ na pɔsɔ mpe bazwi ekateli ete bakotika lisusu nzela te ete misala misusu mipekisa bango kosala boyekoli.
Loyembo 142 mpe libondeli ya nsuka.