Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/95 lok. 1
  • Klisto: ndakisa mpo na bilenge

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Klisto: ndakisa mpo na bilenge
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Masolo mosusu
  • Yo mpe okoki komipesa?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Yango ekoki kozala mosala oyo ebongi na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Betele ezali na mposa ya basali na bolingo malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Babongisi-nzela bazali kopesa mpe bazali kozwa bolamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 12/95 lok. 1

Klisto: ndakisa mpo na bilenge

1 Nsima ya lisoló moko molai kati na Biblia, elenge moko alobaki ete: “Nakamwaki mingi na bomoto ya nguya oyo Yesu azalaki na yango. Ye azalaki mpenza mokonzi oyo ngai nasengelaki kondimela!” Ya solo, maloba motindo wana makoki mpenza kolobama te mpo na bato minene ya politiki, mpo na banzambe ya libándá ya masano, mpo na banganga-basani mpe mpo na bayembi minene na esanelo. Baklisto ya solo balandaka te ndakisa ya baoyo bazali kotambola engebene mitindá ya mokili mpe ya baoyo balandi lolenge ya bomoi oyo eyokani te na mitindá ya boklisto.​—Nz. 146:3, 4.

2 Bilenge bakoki kondimisama ete soki bazali komonisa kondima kati na Yesu Klisto, bazali kati na bampate ya Nzambe mpe Yesu ayebi bango. Mobateli na bampate aleki malamu azali kobatela bango. (Yoa. 10:14, 15, 27) Bilenge oyo bazali kokómisa Klisto lokola ndakisa na bango bazali kozwa mapamboli.

3 Ndeko mobali moko oyo azali kosala sikawa na Betele ya Brooklyn amityelaki mokano malamu wana uta azalaki na mibu mwambe. Balendisaki ye ete atalela mosala ya Betele lokola mwango moko malamu mpo na kolanda ndakisa ya Klisto, wana akokóma mokóló. Baboti na ye, bakisa mpe bakɛngɛli-batamboli, balendisaki ye na kolanda mokano yango. Mpo na kosalisa ye na komibongisa, balendisaki ye ete asalaka makambo lokola nde azalaki mosangani ya libota ya Betele: kosangana na misala ya ndako, kobongisa Ndako ya Bokonzi, mpe lisusu kokólisa makoki na ye kati na mosala ya kosakola. Sikawa, lokola azali kosala na Betele uta bambula mingi, azali na esengo ete, na bolenge na ye, asalaki makasi na komekola ndakisa oyo Klisto atikaki.

4 Yesu amipesaki te na mosala moko ya mokili; aponaki mosala ya kosakola. Ndeko mwasi moko, oyo azali elenge, azalaki na mposa ya kozala mobongisi-nzela ntango akosilisa kelasi, kasi azalaki kokakatana mpo ete akokaki te kozwa mosala ya malamu oyo mosengelaki kozwa ye bobele ndambo ya mokolo. Amilobelaki ete: ‘Nazwa naino mosala, bongo nakotondisa lisɛngi ya kozala mobongisi-nzela na nsima.’ Nkulutu moko alobaki na ye ete soki azali kozelisa ntango molai, bopusi ya kondima mosala oyo mozali kozwa mokolo mobimba ekolanda sé kokóla, mpamba te ezali na likambo moko te oyo lizali kokanga ye nzela. Ayebisi ete: “Nabondelaki Yehova ete asunga ngai na lisalisi ya elimo na ye.” Mwa moke na nsima, abandaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi, mpe na nsima akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Nsima ya mwa mikolo, azwaki mosala oyo mobongaki mpenza na manaka na ye ya mobongisi-nzela.

5 Yesu asakwelaki bato banso nsango ya Bokonzi na molende mpenza. (Mat. 4:23) Bilenge baklisto bakoki mpe koyekola kozala na molende mpenza kati na mosala ya kosakola mpe na kozala na bobangi te liboso na bato. Motatoli moko oyo azali na bambula 14 ya kobotama ayebisi ete: “Na eteyelo, bato nyonso bayebi ete nazali Motatoli. . . . Bayebi yango malamu, kutu soki nakutani na baninga ntango nazali kati na mosala ya kosakola, nayokaka nsɔni te. Mbala mingi kutu bayokaka, mpe bandimaka mbala na mbala mikanda mikolimbolaka Biblia.”

6 Kotalela ndakisa ya Klisto ekoki kosalisa bilenge na kozwa bikateli ya mayele mpo na bomoi na bango ya mikolo mizali koya. Na esika ete bámitika kozindisama na mikano ya mokili, ‘bazali kokanisa Mozalisi na bango monene’ na kozaláká na molende kati na mosala ya Yehova. (Mos. 12:1) Lolenge moko na Yesu Klisto, bazali kolóna “bolingo ya Tata” oyo ezali kopesa bolamu boleki mpenza bomengo nyonso oyo mokili ekoki kopesa. Bazali na likoki ya kolikya ‘koumela libela na libela’ na esika ete ‘báleka’ elongo na mokili oyo mokómi pene na kobomama.​—1 Yoa. 2:15-17.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto