Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/95 lok. 1
  • Yehova azali kokɛmbisa biso na nguya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova azali kokɛmbisa biso na nguya
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini tosengeli kobondelaka ntango nyonso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Yehova apesaka nguya
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Tikalá penepene na ebongiseli ya Yehova
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Mbano ya bompikiliki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 12/95 lok. 1

Yehova azali kokɛmbisa biso na nguya

1 Biso baoyo tozali basaleli ya Yehova, tozwi etindá ya kosakola nsango malamu na kozaláká “ntango nyonso na etamboli malamu katikati na bapakano.” (1 Petelo 2:12, NW; Mat. 24:14) Lokola tozali kobika na eleko moko ya mobulu mpe lokola tozali bato na bolɛmbu mpe na mabungá, tozali na likoki te ya kokokisa mosala yango na makasi na biso moko. (2 Tim. 3:1-5) Oyo nde bolamu tozali na yango na kosungamáká na Yehova!

2 Ntoma Paulo ayikaki mpiko na ebele ya minyoko. (2 Kol. 11:23-27) Nini esalisaki ye na kolónga yango mpe na kokokisa mosala oyo mopesamelaki ye? Yehova apesaki ye “nguya oyo eleki nguya ya bomoto.” (2 Kol. 4:7, NW) Paulo andimaki ete azalaki kozwa lisungi ya Nzambe wana akomaki ete: “Nazali na makasi kati na nyonso na lisalisi na ye oyo azali kokɛmbisa ngai na nguya.” (Filp. 4:13, NW) Yehova akosunga biso mpe bongo. Ndenge nini tokoki kozwa lisungi motindo wana?

3 Na kobondeláká ntango nyonso: Yesu alendisaki biso ete ‘tólanda ntango nyonso kosɛnga, koluka mpe kobɛta ekuke,’ mpe tósala bongo kozanga kotika. (Luka 11:5-10) Na kolendendeláká kati na mabondeli, tozali komonisa, epai na Yehova, bozindo ya lobanzo na biso, bonene ya mposa oyo tozali na yango mpe bosolo ya mikano na biso. (Nz. 55:17; 88:1, 13; Lom. 1:9-11) Paulo amonisaki ntina ya kolendendela na mabondeli wana apesaki toli oyo ete ‘bóbondelaka ntango nyonso.’ (1 Tes. 5:17) Libondeli ezali moko na myango minene oyo na nzela na yango tokoki kozwa lisungi ya Yehova.

4 Na kolandáká litambwisi ya Teokrasi: Liloba “Teokrasi” elimboli ‘boyangeli na Nzambe’; mpe Nzambe azali bolingo. Mpo na kozwa litomba na boyangeli yango, tosengeli kondima Bokonzi ya Yehova oyo etondi na bolingo mpe kolanda malako na ye, ezala kati na bikateli ya minene to na bikateli ya mike oyo tosengeli kokamata. “Moombo ya sembo mpe ya mayele” azali momonisi ya boyangeli ya Teokrasi awa na mabelé. (Mat. 24:45-47) Mpo na kopambwama epai na Yehova, tosengeli kosala elongo na lisangá oyo “moombo” azali kosalela. (Talá Baebele 13:17.) Yehova akofuta bosembo na biso mpe mposa na biso ya kotosa mibeko na ye; akosala yango na kokɛmbisáká biso na nguya oyo tozali na yango mposa, na ntango ebongi.​—Ebe. 4:16.

5 Na kotikaláká pene na bandeko na biso: Bolingo ezali elembo oyo ezali kopesa nzela na koyeba bayekoli ya Yesu. (Yoa. 13:34, 35) Lokola biso banso tozali na bomoto ya lolenge moko te, ekómaka ete matátá mábima kati na biso. Tosengeli kotonda na boboto, kolimbisanáká bamoko na basusu na motema mobimba. (Ef. 4:32) Yango ezali kosalisa biso na kotikala penepene na bandeko na biso kati na kondima mpe na kolendisama na mpiko na bango liboso na mikakatano. ‘Koyebáká ete mpasi motindo moko ezali kobimela libota mobimba ya bandeko na biso,’ tozali kozwa makasi mauti na Nzambe oyo mazali kosalisa biso na kolónga mikakatano ya motindo moko.​—1 Petelo 5:9.

6 Na kobateláká manáka malamu ya boyekoli ya biso moko: Soki tozali kolendisa makanisi na biso mpe motema na biso kati na elimo, tokoki kotɛlɛma ngwi liboso na makaneli ya Satana. (1 Petelo 5:8) Manáka malamu ya boyekoli na biso moko ekosalisa na kokólisa boyebi na biso ya Nzambe. Liboso na mikakatano ya mokolo na mokolo, tokozala na likoki ya kosalela makambo oyo tosilaki koyekola. Paulo amonisaki ete kozala na “boyebi ya sikisiki” ezali likambo ya ntina mpo na kozwa lobiko. (1 Tim. 2:3, 4) Ezali likambo ya motuya monene ete tólyaka ntango nyonso bilei ya elimo.

7 Ezali kati na lisangá ya boklisto nde tokoki kokuta, na boike mpenza, nyonso oyo ezali na ntina mpo na kozala ntango nyonso makasi. Soki tozali kosimba misala ya lisangá na motema mobimba, na ntembe te ‘tokotambola mpe tokolɛmba soko moke te.’​—Yis. 40:29-31.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto