Makita ya Mosala mpo na Desɛmbɛ
Pɔsɔ ebandi na 4 Desɛmbɛ
12 mn: Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Lobelá misala ya mbula oyo ezali koya; kundolá ntina oyo moto mokomoko asengeli kozala ntango nyonso na molende kati na mosala ya kosakola, kozala na molende mpo na koyangana na makita mpe mpo na kopesa lapolo na ye.
12 mn: “Yehova azali kokɛmbisa biso na nguya.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Salelá makanisi oyo mabimaki kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Febwali 1992, lokasa 32.
18 mn: “Yehova azali Mozalisi na biso.” Lisolo elongo na bayangani. Bongisá bilakiseli mibale na kolandáká kolakisama oyo epesami. Pesá mwa makanisi mokuse mpo na kosala bozongeli ya sika epai na bato oyo totikelaki bango trakte Nsango ya Bokonzi.
Loyembo 17 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 11 Desɛmbɛ
Loyembo 221
10 mn: Mayebisi. Lapolo ya kɔnti.
17 mn: “Klisto: ndakisa mpo na bilenge.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Kɔtisá mwa bakomantɛrɛ ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 1986, nkasa 4-6 (ebimeli ya Lifalanse).
18 mn: “Tósalisa baoyo bazangi kondima.” Motambwisi moko ya boyekoli ya mokanda azali kotalela lisolo yango elongo na basakoli mibale to misato. Azali komonisa lolenge ya kosalela makanisi oyo mapesami. Na nsima, bazali komimekisa mpo na koyeba lolenge ya kosalela mpo na kolakisa mokanda.
Loyembo 122 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 18 Desɛmbɛ
Loyembo 80
10 mn: Mayebisi. Bilakiseli mibale to misato: kolakisama ya bazulunalo oyo ekoki kosalelama pɔsɔ wana na mosala ya kosakola.
18 mn: Tózala na limemya mpo na bazalani. Lisukulu likosalema na nkulutu moko, oyo lizwami na lisolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛmbɛ 1994, nkasa 28-30. Lobelá makasi ntina ya kokumisa baninga na biso kati na lisangá mpe ya komibanzabanza mpo na bango na bolingo nyonso.
17 mn: “Tósalela ntango na biso na lolenge malamu.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Mpo na oyo etali ntango oyo elakisami liboso na televizyo, kundolá makanisi oyo mapesami kati na nimero ya Lamuká! ya 22 Mai 1991 (ebimeli ya Lifalanse), na lokasa 11, na nse na motó na likambo moke “De la maîtrise!” (“Komipekisa!”)
Loyembo 208 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 25 Desɛmbɛ
Loyembo 75
15 mn: Mayebisi. Sololá na mokuse mpo na ntina ya bozongeli ya sika. Eteni ya ntina mingi kati na mosala na biso ya koteya ezali kosalema na nzela ya bozongeli oyo tozali kosala mpo na kobatela bosepeli oyo emonisamaki. Bobele bato moke nde bakoki kokola na elimo na mikanda mpamba. Soki tozali kozongela bango te, boye tozali kozangisa bango libaku malamu ya kosalisa bango. Bozongeli ya sika ezali kopesa nzela na kosala boyekoli ya Biblia elongo na bato. Na esika ya kozela ete pɔsɔ mobimba eleka, basakoli mingi bazali kozwa matomba malamu kati na likambo yango na kozongáká kotala bato, mikolo mibale to mikolo misato na nsima ya boleki na bango ya liboso.—Talá buku Lisanga, nkasa 90-91.
15 mn: Biyano na mituna na biso. Ekosalema na mituna mpe biyano. Ekopesama na motambwisi ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Bakisá mpe makanisi mazwami na Mokanda mpo na Eteyelo ya, nkasa 90-92.
15 mn: Mikanda oyo tokolakisa na Yanuali. Bósolola na ntina na makambo ya sikisiki oyo matali mwa babuku oyo ezali na libombo ya lisangá. Bilakiseli mikuse: basakoli bazali kolakisa mwa babuku yango na mosala ya ndako na ndako. Na ndakisa: Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso? (Kofungola mwa buku yango na nkasa 26-27, kolakisa bililingi mpe kosolola na kosaleláká moko na mikapo oyo mizali kolobela Paladiso oyo ezali koya.) Quel est le but de la vie? Comment le découvrir? (Kofungola mwa buku yango na nkasa 30-31, kolakisa moko na mikapo ya Biblia oyo mitángami mpe kosolola likoló na elilingi oyo ezali wana.) Ntango moto oyo olingaka akufi... (Kobenda likebi ya moto likoló na mituna oyo mitunami na lokasa 2, mpe na nsima kosolola likoló na mokapo moko to mikapo mibale ya Biblia oyo mizali kolendisa mpe mizwami na lokasa 31.) Yebisá na bayangani mwa babuku oyo ezali na libombo ya lisangá.
Loyembo 225 mpe libondeli ya nsuka.