Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/95 lok. 2
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 10/95 lok. 2

Mayebisi

◼ Lipesi ya Ɔkɔtɔbɛ mpe ya Novɛmbɛ: Bazulunalo mpe mwa babuku. Desɛmbɛ: La vie: Comment est-elle apparue? Évolution ou création? Yanuali: liboke ya mwa babuku misato ekeseni ya nkasa 32. Febwali: Mwa babuku. Marsi: Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis.

◼ Na boumeli ya sanza oyo, tosɛngi na bankulutu ete bátala soki bazulunalo ezali koyikana kati na lisangá. Soki ezali bongo, mwango ya kokabola yango ezali? Nzokande, soki lisangá ezali kozwa bazulunalo mingi te, bósɛnga na kobongisa komande na bino mpo na yango.

◼ Tozali koyebisa bino uta sika ete Ekaniseli ekosalema na mokolo Mwamibale 2 Aprili 1996, nsima ya kolala ya moi; na 1997, yango ekosalema na Mwalomingo 23 Marsi.

◼ Tozali kokundwela masangá oyo matindi naino evantɛrɛ ya mikanda na bango te uta mokolo ya 1 Sɛtɛmbɛ ete bátinda yango sikawa. Tokotinda mikanda te na masangá oyo tozwi naino te evantɛrɛ na bango.

◼ Masangá oyo mazali na kɔnte “Ndako ya Bokonzi” masengeli kotinda mosolo na bango na lokasa S-20 oyo etyami mpembeni, kozanga kosangisa yango na bakɔnte mosusu. Soki masangá mingi mazali kotalela botongi ya Ndako ya Bokonzi moko to kofutela mosolo oyo badefaki mpo na yango, botindi mosolo na bango ekosalema na kɔnte bobele moko, na nkombo ya lisangá oyo Ndako ya Bokonzi ezali kati na teritware na yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto