Esengo oyo yo mpe okoki kozwa!
Basakoli mosusu bamonani ete bazalaka ntango nyonso na baeksperiansi kitoko mpe ya kolendisa oyo bayebisaka, elingi koloba masolo to bozongeli ya sika oyo epesaki bango esengo mingi. Nzokande, toyebi malamu ete masolo ya kitoko mayaka pwasa te. Yango euti na milende makasi mpe ya solosolo. Yango ezali te bobele mpo na basakoli oyo balobaka malamu to bazali na makoki mingi koleka.
Talá mwa makambo ya motindo moko oyo mamonanaki epai na baoyo bazali kolonga mpe kati na mosala ya kosakola: (1) Bakendeke kosakola ntango nyonso, mingimingi mbala ebele kati na pɔsɔ, mpe yango ezali kosalisa bango ete bázwa mabaku mingi ya kokutana na bato oyo bazali komonisa mayoki na bango polele liboso ya nsango; (2) bazali na makanisi ya kolonga liboso ya bato oyo bazali koyamba bango, kozanga kosukisa liboso ete bato yango bakolinga koyoka te; (3) bazali kobanda lisolo na boninga nyonso mpe komonisa bosepeli makasi mpe ya solo epai na balobani na bango; (4) bazali na molende mpe na kolendendela mpo na kozonga epai na baoyo bayokaki bango mbala ya liboso to epai na baoyo bazalaki na ndako te; mpe (5) bazali na mokano ya kobanda boyekoli ya Biblia.
Nsima na kotalela malamumalamu mosala na yo, omoni mbala mosusu lolenge okoki kokutana lisusu na baeksperiansi ya kosepelisa oyo ezali kosala ete mosala ya kosakola mobota mbuma mpe mozala ya kolendisa.