Biyano na mituna na bino
◼ Lolenge nini tosengeli kobongisa biloko oyo tosalelaka kati na mosala ya kosakola?
1 Atako ayebi kolakisama moko kitoko oyo akosalela likoló na Biblia, mosakoli ya nsango malamu akoki kozanga mbala mosusu kobongisa malamumalamu biloko oyo bikosalelama. Wana akómi liboso ya ndako moko, akomona ete lipesi ya sanza ezali te. Bazulunalo, mwa babuku mpe batrakte oyo azali na yango efinanafinana to epasukapasuka. Lokola sakosi na ye ezali bongo na bongo, akomona ekomeli na ye te to lokasa na ye ya kozwa nɔti ya ndako na ndako mpe te. Ezali likambo ya ntina ete tótalela biloko na biso ya mosala liboso ete tókende kosakola.
2 Nini esengeli kozala kati na sakosi ya mosala ya kosakola oyo etondi na bisaleli? Biblia esengeli kozanga te. Tómema nkasa ya nɔti ya ndako na ndako. Tómindimisa ete mokanda oyo tokopesa na sanza oyo ezali elongo na biso. Bazulunalo ya sika, bakisá batrakte mpe mwa babuku ezali na ntina mingi. Tómema buku Comment raisonner. Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza wana ekosalisa biso na kotala lisusu kolakisama oyo epesamaki liboso ete tókende kobɛta na ekuke moko. Kati na teriware oyo tozali kokutana na bato bazali koloba lokota ya bapaya, ekozala malamu ete tómema mwa búku Nsango malamu mpo na mabota nyonso. Soki tomemi moko na mikanda na biso oyo mizali kolobela bilenge, tokozala na likoki ya kosolola elongo na bango.
3 Biloko nyonso oyo tozali kosalela bisengeli kotyama na molɔngɔ mpenza kati na sakosi na biso. Atako sakosi yango ezali ya sika te, nzokande esengeli kozala pɛto mpe oyo ezali naino makasi. Sakosi na biso ya mosala ya kosakola ezali mpe moko ya biloko oyo tozali kosalela mpo na kosakola nsango malamu. Tóbatela yango ete ezala bongo na bongo te.