Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/96 lok. 2
  • Makita ya Mosala mpo na Febwáli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya Mosala mpo na Febwáli
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔ́sɔ ebandi na 5 Febwáli
  • Pɔ́sɔ ebandi na 12 Febwáli
  • Pɔ́sɔ ebandi na 19 Febwáli
  • Pɔ́sɔ ebandi na 26 Febwáli
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 2/96 lok. 2

Makita ya Mosala mpo na Febwáli

Pɔ́sɔ ebandi na 5 Febwáli

Loyembo 133

8 mn: Mayebisi mpe Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi.

17 mn: “Tóteya Liloba ya Nzambe na lisalisi ya mwa babúku.” Ndeko oyo apesameli eteni oyo ya likita akosolola na basakoli mibale to misato mpo na mitindo mikeseni ya mwa babúku. Bakomimekisa na nsima mpo na kosalela makanisi na bango.

20 mn: “‘Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe’​—Liyangani ya etúka 1996.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Na mokomeli ya lisangá. Lendisá bandeko nyonso ete bamilengela uta sikawa mpo na koyangana na manáka nyonso ya liyangani ya etúka oyo lisangá na bino ebyangami.

Loyembo 28 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 12 Febwáli

Loyembo 138

10 mn: Mayebisi. Lapólo ya kɔnti. Pesá longonya na lolenge lobongi na basakoli mpo na lisungi na bango ya mosolo oyo bapesaka mpo na lisangá mpe mpo na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi na mokili mobimba. Yebisá lisangá mobimba motuya ya makabo batindaki na filiale ya la Société, soki ebongi mpenza kolobela yango.

15 mn: “Tosengeli kobima na mosala ya kosakola mibale-mibale?” Lisoló elongo na bayangani, ekosalema na mokɛngɛli ya mosala ya kosakola. Esengeli kotánga mikapo oyo mipesami mbala moko kati na Biblia. Zalá na mɔ́tɔ mpe sungá basakoli ete bálanda ndakisa ya Biblia.

20 mn: “Tózala batosi, kasi bobele bayoki mpamba te.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Na kotalela ngonga oyo epesami, lobelá ntina ya botosi na lisalisi ya búku Auxiliaire, lokasa 1099, paragrafe 1 mpe 2.

Loyembo 70 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 19 Febwáli

Loyembo 77

10 mn: Mayebisi.

15 mn: Bamposa ya lisangá to lisukúlu na nkulutu moko lizwami na lisoló “Batelá elimo na yo ya etingya” ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔ́bɛ 1995, nkasa 25-28.

20 mn: “Bozongeli ya molende na lisalisi ya mateya mabongi.” Talelá makanisi ya ntina. Elakiseli moko to bilakiseli mibale ya mokuse.

Loyembo 156 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 26 Febwáli

Loyembo 200

10 mn: Mayebisi.

20 mn: “Tózwa litomba ya Eteyelo ya mosala ya teokrasi na 1996​—Eteni 1.” Lisukúlu na motambwisi ya Eteyelo. Kundolá malako mataleli masoló ya banakelasi lokola yango epesami na manáka mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpo na 1996 ebimaki na Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛ́mbɛ 1995.

15 mn: “Tozali na mposa ya lisangá.” Ekosalema na mituna mpe biyano.

Loyembo 92 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto