Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/96 lok. 1
  • Tókumisa Yehova “mikolo nyonso”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tókumisa Yehova “mikolo nyonso”
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • Jéhovah abongi mpo na kokumisama libela na libela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Tókumisaka Yehova mokolo na mokolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Bendá likebi ya bato na “pole ya mokili”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Yehova abongi mpenza kokumisama mingi
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 4/96 lok. 1

Tókumisa Yehova “mikolo nyonso”

1 Na Nzembo 145:2, tozali kokuta elaka moko oyo Davidi asalaki epai na Yehova ete: “Mikolo nyonso nakokumisa yo mpe nakosanzola nkombo na yo seko na seko.” Biso mpe tozali na bantina ya kokumisa mpe kosanzola Tata na biso ya likoló. Kasi lolenge nini tokoki komekola Davidi mpe kokembela boyangeli ya Yehova “mikolo nyonso?”

2 Tófulukisa mitema na biso na botɔ́ndi mpo na Yehova: Boyekoli ya mbala na mbala ya Liloba ya Nzambe ekólisaka botɔ́ndi na biso mpo na oyo Yehova asili kosala, oyo azali kosala sikawa mpe oyo akosala lisusu mpo na biso. Na meko oyo tozali kososola misala kitoko ya Yehova, tokotonda na botɔ́ndi mpe tokoloba na ntina na boboto na ye. (Nz. 145:7) Tokopusama na kosanzola Yehova na mabaku nyonso.

3 Tókumisa Yehova na masoló na biso ya mokolo na mokolo: Ntango tozali kosolola na baninga na biso ya pembeni, baninga ya kelasi, baninga ya mosala mpe bato mosusu oyo tokutanaka na bango mokolo na mokolo, tokoki kosimba mabaku ya koyebisa bango elikya na biso. Moninga moko akoki mbala mosusu koyebisa biso motungisi na ye na ntina na mobulu oyo ezali kosalema na kartyé; ekoki kozala ete moninga moko ya kelasi azali komitungisa na ntina na kosalelama ya bilangwiseli to bizaleli ya mbindo; moninga moko ya mosala akobimisa mbala mosusu likanisi na likambo moko litali politiki. Tokoki kobenda likebi na bango likoló na mitindá mpe bilaka oyo ezwami kati na Liloba ya Nzambe mpe kolakisa bango ezaleli malamu oyo basengeli kozala na yango uta sikawa, bakisá mpe mwango oyo mokoki kozala malamu mpo na kosilisa mikakatano na bango. Maloba motindo wana oyo malobami ‘na ntango ebongi’ makoki komonana lokola lipamboli.​—Mas. 15:23.

4 Tóloba na ntina na Yehova ntango nyonso: Moto oyo azali na botɔ́ndi mozindo epai na Yehova azalaka na mposa ya koyebisa nsango malamu epai na bato mingi. (Nz. 40:8-10) Na bongo, tómituna boye: ‘Nasalaka oyo ekoki na ngai engebene ezalela na ngai?’ Mingi basili komona ete na kobongoláká mwa moke manáka na bango, bakokaki kokóma babongisi-nzela ya sanza na sanza. Soki ezalela na biso ya sikawa ezali kopesa biso nzela te, tokoki te kozala babongisi-nzela basungi? Eleko ya ekaniseli epesaka biso libaku ya kokólisa mosala na biso ya kosakola. Na sanza ya Mársi mpe ya Apríli ekozala malamu mpenza mpo na biso ete tómipesa mingi na mosala ya kosakola na kozaláká babongisi-nzela basungi.

5 Tósunga bato ya sika ete básangana na biso mpo na kokumisa Yehova: Molulu ya Ekaniseli ya liwa ya Yesu ekundwelaka biso mbula na mbula bantina oyo tozali na yango mpo na kopesa matɔ́ndi na Yehova mpe kosanzola nkombo na Ye. Ezali mpenza ntango ebongi mpo na kolendisa bato oyo bayekolaka Biblia ete básangana na biso mpo na kosakola epai na bato banso na ntina na bokonzi ya Yehova. Tólendisa bango ete bámanyola na nzela ya mabondeli makambo oyo malobelami kati na búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, na lokasa 173 kino lokasa 175, paragrafe 7 kino paragrafe 9. Soki bakokisi masɛngami, bazali na ntina moko te ya kozelisa, na kopesáká mokalo ete bazangi eksperiansi. Basakoli oyo bamesani na mosala bakoki kolakisa bango lolenge nini basakolaka Bokonzi. Soki bato ya sika bazwi mpiko oyo esengeli mpo na kosakola nsango malamu, bakoki kozala na kondimisama ete Yehova akosunga bango.​—Mis. 4:31; 1 Tes. 2:2.

6 Soki tozali kosala milende mpo na kokumisa Yehova mikolo nyonso, matomba ya seko makomonana mpo na biso moko mpe mpo na bazalani na biso.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto