Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/06 nk. 3-4
  • Bendá likebi ya bato na “pole ya mokili”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bendá likebi ya bato na “pole ya mokili”
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Masolo mosusu
  • Tósakola bizaleli malamu ya Yehova
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Tozali koluka babongisi-nzela basungi 100 000
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • “Tósakola liloba ya Nzambe malamumalamu”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Okozala mobongisi-nzela mosungi?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 2/06 nk. 3-4

Bendá likebi ya bato na “pole ya mokili”

1. Pole monene nini esakolamaki na Liloba ya Nzambe, mpe likambo nini mpenza ebendaka likebi ya bato na pole yango?

1 Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova asakolaki boye: “Bato baoyo batambolaki na molili bamoni pole monene; baoyo bafandaki na mokili na molili na kufa pole engɛngɛli bango.” (Yis. 9:2) “Pole monene” yango emonanaki na mosala ya Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe. Mosala ya Yesu awa na mabelé mpe matomba ya mbeka na ye engɛngisaki mpenza bato oyo bazalaki na molili ya elimo. Bato bazali na mposa ya pole ya ndenge wana na ntango oyo ya molili makasi. Bolei ya Mpokwa ya Nkolo epesaka biso libaku ya kobenda likebi ya bato na “pole ya mokili.” (Yoa. 8:12) Na mbula eleki, bamilio ya bato bamonisaki kondima na bango ndenge batosaki etinda oyo ya Yesu: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” (Luka 22:19) Lokola Ekaniseli ya mbula oyo ekómi pene, ndenge nini tokoki kosangana na mosala oyo ezali kobenda likebi ya bato na pole monene oyo Yehova angɛngiseli biso?​—Filp. 2:15.

2. Ndenge nini tokoki kokóma na botɔndi mingi mpo na mbeka ya lisiko, mpe matomba nini tokozwa soki tosali bongo?

2 Tókolisa botɔndi na mitema na biso: Eleko ya Ekaniseli ezali ntango ebongi mpo na komanyola likoló na bolingo monene oyo Yehova ná Yesu bamonisaki, ndenge bapesaki mbeka mpo na kosikola bato. (Yoa. 3:16; 2 Kol. 5:14, 15) Soki tosali bongo, tokozala na botɔndi mingi mpo na molulu yango ya bosantu. Basaleli nyonso ya Nzambe basengeli kozwa ntango ya kotánga mpe komanyola likoló ya mikapo ya botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli, oyo ezali na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo. Soki tokanisi bizaleli malamu ya Yehova oyo emonisami polele na ebongiseli oyo azwaki ya kosikola biso, yango ekotinda biso tósepela mpenza na ndenge azali Nzambe na biso. Soki mokomoko na biso akanisi oyo lisiko esali mpo na ye, tokolinga lisusu Yehova ná Mwana na ye na motema mobimba mpenza, mpe yango ekotinda biso tómipesa na kokokisa mokano ya Nzambe.​—Gal. 2:20.

3. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na botɔndi mpo na Ekaniseli?

3 Soki tokómi na botɔndi mingi mpo na ebongiseli oyo Yehova asili kozwa mpo na kobikisa biso, bato oyo toyekolaka na bango Biblia, baoyo tozongelaka mbala na mbala, bandeko na biso ya libota, baninga ya kartye, ya kelasi, ya mosala, mpe bato mosusu oyo tokobengisa na molulu yango ya ntina mingi, bakokóma mpe na esengo lokola biso. (Luka 6:45) Na bongo, salá milende mpenza mpo na kobengisa bato yango na Ekaniseli, mpe pesá bango lokasa ya libyangi mpo bábosana te. Basakoli mingi bamonaka malamu básala liste ya bato oyo bango babengisaka mbala na mbala na Ekaniseli, mpo bábosana bamosusu te, mpe mbula na mbula babakisaka bato ya sika na liste yango. Soki tosali makambo na molɔngɔ mpe tolandi kosala milende mpo na kobengisa bato oyo basepelaki, yango ekozala lolenge ya malamu ya komonisa ete tozali na botɔndi epai na Yehova Nzambe “mpo na likabo na ye wana ya ofele oyo ekoki kolimbolama te.”​—2 Kol. 9:15.

4. Nini ekoki kosalisa biso tósakola mingi na sanza ya Marsi mpe ya Aprili?

4 Tósakola mingi: Okoki nde kosakola mingi na sanza ya Marsi mpe ya Aprili? Soki tozali kosala makasi tóyebisa basusu “kongɛnga ya nsango malamu ya nkembo oyo etali Klisto,” kozanga ntembe Nzambe akopambola biso. Lokola pole nyonso ya elimo eutaka epai na Yehova, alobi boye: “Tiká pole engɛnga uta na molili.” (2 Kol. 4:4-6) Soki esengeli, bankulutu bakobongisa makita mosusu mpo na mosala ya kosakola, na bangonga mosusu mpe na bisika mosusu, mpo na kosalisa baoyo balingi kosala mingi. Yango ekoki kozala mpo na kosakola na babalabala na ntɔngɔntɔngɔ to kopesa litatoli na bisika ya mombongo mpe na telefone na mpokwa mpenza. Mpo na kosakola mingi, ekozala malamu kokata ngonga boni okobanda kosala mokolo na mokolo mpe kosala makasi kokokisa yango. Mpo na basakoli mingi, kopesa Yehova oyo bazali na yango ya malamu koleka, esangisi mpe kosala mosala ya mobongisi-nzela.​—Kols. 3:23, 24.

5. Ndenge nini basakoli mingi bazali kozwa litomba ndenge bakitisá bangonga ya mobongisi-nzela mosungi?

5 Okoki kozala mobongisi-nzela mosungi? Eleki sikoyo mbula nsambo banda bakitisá bangonga ya mobongisi-nzela mosungi. Mbongwana yango esalisi basakoli mingi bázwa mapamboli ya mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Osilá komeka yango? Basusu bakómi kosala yango mbula nyonso. Na masangá mingi, basakoli mingi basalaka mosala yango elongo, mpe mosala ya kosakola esalamaka mingi na basanza yango na lisangá. Mosala ya mobongisi-nzela ekoki nde kopesa yo esengo na boumeli ya sanza moko na eleko ya ekaniseli? Sanza ya Aprili ekoki kozala sanza ya malamu mpo na bamosusu, mpamba te ezali na pɔsɔ mitano.

6. Bibongiseli nini ya kosepelisa mpenza ezwami?

6 Na lisangá na bino bokoyamba mokɛngɛli ya zongazonga na sanza ya Marsi to ya Aprili? Ozwi libaku mosusu. Ndenge eyebisamaki liboso, na mobu ya mosala 2006, baoyo nyonso bakosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza oyo mokɛngɛli ya zongazonga akotala lisangá na bango, bakokɔta na eteni ya liboso ya likita oyo akosala elongo na babongisi-nzela na pɔsɔ yango. Kozanga ntembe, bilendiseli ya elimo oyo babongisi-nzela basungi bakozwa na likita yango ekosalisa bango básepela kosala mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Lisusu, na sanza ya Marsi tokozala na esengo ya koyekola na bato buku ya sika Biblia eteyaka mpenza nini? mpo na kosalisa bango báya na pole ya elimo. Mpo na nini te komityela mokano ya kobanda koyekola na moto moko buku yango ya sika?

7, 8. (a) Nini ekoki kosalisa biso tósala programɛ mpo na kozala mobongisi-nzela mosungi? (b) Ndenge nini koyokana malamu na libota ekoki kosalisa bango, mpe ndenge nini libota mobimba bakoki kozwa matomba na yango?

7 Ntango ozali kotalela bangonga 50 oyo esɛngami mpo na mobongisi-nzela mosungi, talá mpe manaka oyo ekopesa yo nzela ongɛngisa pole ya solo ngonga soki 12 pɔsɔ nyonso. Sololá na bandeko oyo basalaka mosala yango mpe na bato mosusu. Yango ekoki mpe kolendisa bango básala yango. Basakoli oyo bazwá batisimo, ezala bana mike to mikóló, oyo bazalaki na programɛ ya malamu, bamonaki ete ezali mpenza mpasi te kokokisa bangonga oyo esɛngami. Bondelá Yehova mpo na yango. Mpe soki ekoki, salá programɛ na yo mpo ozala mobongisi-nzela mosungi!​—Mki. 3:10.

8 Mabota mingi bamonaki ete soki bayokani malamu, ata moto moko akoki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Libota moko bazwaki ekateli ete basakoli mitano ya libota na bango oyo bazwá batisimo básala mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Bana mosusu mibale oyo bazwaki naino batisimo te basalaki milende mpo na kosakola mingi. Matomba nini libota yango ezwaki na milende oyo basalaki? Bakomaki boye: “Ezalaki sanza ya malamu mpenza, mpe tomonaki ete boyokani na biso na kati ya libota ekómaki lisusu malamu mingi. Totɔndi Yehova mpo na lipamboli yango kitoko!”

9. Ndenge nini tokoki kotika ete pole na biso engɛnga na eleko ya Ekaniseli?

9 Ndenge oyo tokomipesa na kosakola mingi na sanza ya Marsi mpe ya Aprili, ekolendisa biso mpe ekosalisa biso tópusana lisusu penepene na Tata na biso ya likoló? Yango ekotalela mingi mpenza milende oyo tokosala mpo na komonisa ete tokómi kolinga Yehova mpe Mwana na ye mingi, mpe mposa na biso ya kosakola mingi. Tiká ete tózala na ekateli lokola oyo ya mokomi ya nzembo oyo ayembaki boye: “Ngai nakosanzola [Yehova] na monɔkɔ na ngai bɛ, ɛɛ kati na bato mingi nakosanzola ye.” (Nz. 109:30) Yehova akopambola mosala oyo tokosala na molende na eleko oyo ya Ekaniseli. Na bongo, tiká ete tóngɛngisa pole monene mpo bato mingi bábima na molili mpe “bázwa pole ya bomoi.”​—Yoa. 8:12.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto