Tózwa litomba na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na 1996—Eteni 3
1 Ntoma Paulo alingaki ete bandeko na ye babondela mpo na ye na ntina ete akóma na likoki ya kosakola nsango malamu na mpiko. (Ef. 6:18-20) Mposa na biso ezali ya kokóma na likoki motindo wana. Yango wana topesaka motuya na lisungi oyo tozwaka na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Baoyo bayanganaka na makita mpe bakokisi masɛngami balendisami na kokomisa nkombo na Eteyelo yango.
2 Banakelasi bazwaka batoli oyo etaleli moko na moko na bango lokola lisungi mpo na kobongisa lolenge na bango ya koloba mpe koteya malamu. (Mas. 9:9) Tokoki mpe kozwa litomba na Eteyelo na koyokáká batoli oyo epesami epai na banakelasi mosusu mpe na kosaleláká biso moko makambo oyo tozali koyekola. Ntango tozali kobongisa lisoló moko, tosengeli koyekola na mozindo makambo oyo malengelami mpo na kondimisama ete tokosala yango na bosikisiki. Makanisi ya ntina mpe mikapo oyo tokosalela esengeli kozala na boyokani na motó ya likambo na boumeli ya lisoló. Soki moto mosusu asengeli kosangana na biso na lisoló, esengeli malamu kozongela lisoló yango mbala na mbala elongo na ye liboso ya kosala yango na Eteyelo. Na meko oyo tozali kosala bokóli, tosengeli kosala milende mpo na koloba na lolenge ya mbalakaka, na kosaleláká banɔ́ti na esika ya kosalela maniskrí.
3 Baoyo nyonso bazali na mokumba na eteyelo basengeli kokóma liboso ya ngonga, kopesa lokasa na bango ya Toli mpo na molobi epai na mokɛngɛli na eteyelo mpe kofanda na bitánda ya liboso. Bandeko basi, liboso ya kosala mikumba na bango, basengeli koyebisa na mokɛngɛli na eteyelo kádre oyo bango bakosalela mpe soki bamibongisi mpo na kosala lisoló na bango mintɛ́lɛ́ to bakofanda. Na kosaláká elongo kati na makambo wana makeseni, tokopesa nzela na Eteyelo ete esalema na lolenge malamu mpe tokosunga baoyo batalelaka ebaelo ete bálɛngɛla makambo manso oyo masengeli.
4 Kobongisama ya lisoló ya mwanakelasi No. 2: Moko na bantina ya botángi ya Biblia ezali bongo kosunga mwanakelasi ete abongisa lolenge na ye ya kotánga. Ndenge nini tokoki kosala yango malamu? Lolenge ya malamu koleka ezali ya kotánga mbala na mbala mpe na mongongo makasi eteni ya lisoló oyo epesami. Mpo na koyeba lolenge malamu ya kobénga maloba oyo amesani na yango te, mwanakelasi akoluka yango kati na diksionere oyo ezali komonisa lolenge ya kobénga yango na lisalisi ya bilembo, na ndakisa Diksionere ya Lingala—Maloba ma lokóta. Esengeli ete amimesenisa na bilembo ya kobénga oyo bisalelami kati na diksionere yango.
5 Kati na Traduction du monde nouveau, bankombo bomei (noms propres) mingi eyakisamaki mbala moko uta na Liebele mpe ekomami na lolenge oyo ekopesa nzela na kobénga oyo ezali pene na oyo ya libandeli. Na bongo, elembo ya enkɔti (accent circonflexe) likoló na bisukya (finales) ân, în to ôn ezali kolakisa ete esengeli konyata n ete eyokana (na ndakisa “Salmôn” enyatamaka Salmone). Soki e (oyo ezali na elembo te) ezali kati na ekango (syllabe) moko na ebandeli to na katikati ya nkombo moko, mbala mingi ebéngamaka e lokola na “petit” to “parvenir”. Na ndakisa, mpo na bankombo lokola Nehémia, Tsephania mpe Seroug. Mpo na bankombo oyo eyakisami mbala moko uta na Liebele, s eyokanaka ntango nyonso makasi, lokola, “soleil” (na ndakisa, “Yosek, Qosam”). Ya solo, mbongwana moko ezali te kati na konyatama ya bankombo oyo eyebani mingi oyo batiki ekomeli na yango na Lifalansé (na ndakisa, “Isaac, Jérusalem”).
6 Baboti bakoki kosunga bana na bango na kobongisáká botángi motindo wana. Bakoki koyokamela ntango bazali komibongisa mpe kopesa bango batoli oyo ekosunga bango ete bábongisa lolenge na bango ya kotánga. Ntango oyo epesami ezali kopesa nzela na kolobela mwa bokɔti mokuse ya lisoló mpe bosukisi oyo ebongi kati na yango mwanakelasi akolobela makanisi ya ntina. Na bongo akoki kokólisa likoki na ye ya koloba na lolenge ya mbalakaka.
7 Mokomi na Nzembo asalaki libondeli oyo epai na Yehova: “Ɛ [Yehova], zipolá bibɛbu na ngai mpe monɔkɔ na ngai ekosakola lokumu na yo.” (Nz. 51:15) Tiká ete bosangani na biso na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi esunga biso na komonisa mposa motindo wana!