Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/96 lok. 8
  • Tólakisa bazulunalo na mabaku nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tólakisa bazulunalo na mabaku nyonso
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • Kabolaká bazulunalo ntango ozali na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Tósalela malamu bazulunalo na Apríli
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Bazulunalo oyo ezali kosakola Bokonzi ya Nzambe
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Tózala na mokano na ntango ya bozongeli na biso ya sika
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 4/96 lok. 8

Tólakisa bazulunalo na mabaku nyonso

1 Tozali na bantina malamu ya kopesa motuya na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe na Lamuká! Kati na mokili mobimba, bazulunalo mosusu nini ezali kobenda likebi lokola yango? Na sanza oyo, tokolakisa mpenzampenza yango; masoló oyo mazwami kati na banimero ya Ɔkɔtɔ́bɛ mazali kobenda likebi mingi. Na momeseno, tokabolaka ndambo monene ya bazulunalo na biso na mosala ya kosakola ndako na ndako, kasi tómibongisa mpe mpo na kolakisa yango na mabaku nyonso mabongi.

2 Na “Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli” ya 1 Ɔkɔtɔ́bɛ, tólamusa bosepeli likoló na lisoló “Mokili mozangi bitumba​—Ntango nini?,” na kolobáká ete:

◼ “Bato mingi bazali komituna ndenge nini, atako mpo na milende nyonso ya bato, likoki ezali te ya kotya mokili oyo ezangi bitumba. Okanisi nini na maloba oyo mamonisami na lokasa 5 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔ́bɛ? [Tótánga lisakola ya liboso ya moko na moko ya baparagrafe mibale ya liboso oyo ezali na nsé ya motó ya likambo moke “Mangomba​—Epekiseli monene,” mpe tózela eyano.] Ya solo, yango emonisi te ete bitumba ekozala ntango nyonso. Talá elaka oyo Nzambe apesaki na Yisaya 9:6, 7.” Tótanga mokapo yango kati na Biblia na biso to lokola yango etángami kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Tóyebisa na mokuse ete Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisaka Bokonzi ya Yehova lokola elikya bobele moko na nzela na yango mokili ya kimya mokosalema mpe tólendisa moto yango ete atánga lisoló yango.

3 Mpo na kolakisa “Lamuká!” ya Yanuáli-Mársi, tokoki koloba boye:

◼ “Okanisi nini na motuna oyo, na lokasa ya liboso ya zulunalo oyo: ‘Mpo na nini bomoi ezali mpenza mokuse?’ [Tózela eyano.] Lisoló yango lizali kolimbola makambo oyo banganga-mayele mpe bato mosusu balobaka na ntina na bobangé, mpe lizali komonisa elaka oyo Mozalisi apesi, bomoi ya seko. Nakosepela kotikela yo zulunalo oyo, soki osepeli ete otánga yango.”

4 Soki tokutani na bato oyo balingaka kolobela makambo matali lingomba, mpo na nini te kotalela lisoló moko ya “Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli” ya 15 Ɔkɔtɔ́bɛ? Mbala mosusu ekobimisa litomba?

◼ “Nalingi koyeba makanisi na yo likoló na motuna oyo: Ekoki kosalema ete na mbala moko olinga Nzambe mpe obanga Ye?” Tózela eyano mpe na nsima tótánga mokapo ya moboko, kati na lisoló “Mpo na nini tosengeli kobanga Nzambe ya solo uta sikawa?” (Mos. 12:13) Tósalela moko ya bililingi ya lokasa 202 ya mokanda Comment raisonner, mpe tólakisa zulunalo soki tomoni bosepeli.

5 Na mosala ya kosakola ndako na ndako, tózangisa te kokɔta na bamagazini ya mike mpe babutiki. Baoyo basakolaka mbala na mbala na bamagazini balobaka ete mosala yango epesaka bosepeli mpe ebimisaka matomba. Tómeka mwa kolakisama ya pɛtɛ lokola oyo wana tozali kolakisa “Lamuká!” ya 8 Ɔkɔtɔ́bɛ (ebimeli ya Lifalansé ):

◼ “Toyebi ete bato lokola bino, oyo bazali kati na mombongo, balingaka koyeba makambo oyo mazali kotungisa bato zingazinga na bango. Yango wana, nandimisami ete masoló oyo makosepelisa yo.” Na nsima, tólobela na mokuse likanisi moko ya lisoló “Familles monoparentales: comment réussir? ” (Ndenge nini kolónga kati na mabota oyo matikala na moboti bobele moko?)

6 Soki moto oyo tokutani na ye azali mpenza na mosala, tokoki kolakisa ye bazulunalo mpe koloba ete:

◼ “Nandimisami ete omizelaki te na koyamba mopaya lelo, na yango na nakozwa yo ntango molai te. Nalingi kopesa yo libaku ya kotánga likambo moko ya ntina mingi.” Tóbimisa lisoló moko oyo toponi, mpe tólakisa bazulunalo.

7 Tókamata banɔ́ti ya ndako na ndako na lolenge malamu mpe tózonga kotala moto nyonso oyo azwaki mokanda. Soki tomoni bosepeli ya solo na ntango ya bozongeli ya sika, tóyebisa na moto yango soki akolinga kosala abonemá ya zulunalo moko to ya bazulunalo mibale. Tózala pene mpo na kolakisa bazulunalo na mabaku nyonso mabongi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto