Mayebisi
◼ Mikanda ya kosalela na Apríli: Lamuká! mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Tokosala milende ya solosolo mpo na kokabola bazulunalo. Tokoki mpe kolakisa mpo na lipesi ya sanza, búku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Máí: Tokolakisa Traduction du monde nouveau mpe búku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? Yúni: Tokolakisa búku ya sika Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, mpe tokosala milende ya solosolo mpo na kozonga kotala bato oyo bakamataki yango; mokano na biso ekozala ya kobanda boyekoli ya Biblia. LIKEBISI: Masangá oyo bazali na mposa ya mikanda ya kampanye oyo tolobeli awa na likoló bákomonisa yango kati na lisɛngi na bango ya mikanda oyo bakotinda mbala ya nsima (S(d)-14).
◼ Bandeko oyo bakokenda na mboka-mopaya na boumeli ya basanza ya elanga mpe soki balingi koyangana na moko na mayangani ya etúká 1996-1997 “Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe” kati na mokili wana, basengeli kotinda nkomá na filiale oyo ezali kotalela mosala kati na mokili yango. Bakozwa adrɛ́si ya bafiliale na lokasa ya nsuka kati na Annuaire to na Traduction du monde nouveau.
◼ Mikanda oyo ezali: Annuaires ya 1977 mpe ya 1988 mpo na babibliotɛ́kɛ ya masangá mpe babibliotɛ́kɛ ya bandeko.