Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/96 lok. 3
  • Tókumisa Yehova na makabo na biso ya bolingo malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tókumisa Yehova na makabo na biso ya bolingo malamu
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 4/96 lok. 3

Tókumisa Yehova na makabo na biso ya bolingo malamu

1 “Mokosi alakelama mabe, ye oyo azali na nyama mobali kati na etongá na ye mpe asimbi ndai kasi azali kokabela [Yehova] mbeka na yango ebebi. Mpo ete, ngai nazali Mokonzi monene; Yehova na bibele alobi bongo.” (Mki. 1:14) Ezali kokamwisa biso ete bato bazangi kokoka bápesa eloko epai na Mozalisi? Biloko nyonso kati na molɔ́ngɔ́ bizali ya ye. Nzambe ye moko azali koyebisa boye kati na Liloba na Ye: “Palata ezali na ngai mpe wolo ezali na ngai.” (Hag. 2:8) Nzambe azali na mposa na makabo na biso te mpamba te amikoki na nyonso. Mokonzi Davidi andimaki ete lokola tozali bato, tokoki te na lolenge moko to mosusu kopesa bomengo na Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Ya solo, atako tozali kopesa ye, tozali bobele kozongisela ye mwa ndambo moke mpenza ya oyo tozwaki epai na ye, eutelo ya “makabo nyonso malamu.” Tokoki kokanisa ete makabo na biso ya bolingo malamu oyo topesaka mpo na losambo ya Yehova mazali na ntina te na miso na ye? Nzambe atalaka mpamba makabo na biso ya bolingo malamu? Mokomi na Nzembo ayanoli ete: “Boyá na likabo mpe bókɔta na lopango na ye.”​—Nz. 96:8.

2 Mosolo oyo mozali kosimba mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi na teritware na biso mozali kozwama ndenge nini? Na makabo ya bolingo malamu oyo mapesamaka na basaleli ya Yehova mpe bato ya mitema malamu. Na lisalisi ya makabo wana, lisangá ya Yehova lizali kosunga babongisi-nzela monene, bamisionere, bakɛngɛli-batamboli mpe basáli na Betele. Tokanisa naino ebele ya mosolo oyo mobimaka mpo na kotinda mikanda mpe bazulunalo kati na masangá koleka 2 200 ya Burundi, ya Congo mpe ya Zaïre. Na ndakisa, tokanisaka mosolo oyo mosalelamaka na kobongisama ya mayangani ya etúká? Mpe tokoloba boni mpo na kokomama mpe konyatama ya mikanda na biso? Mosolo wana moutaka mpenza wapi? Tokoki koloba ete kino sikawa, mosolo wana pene na nyonso mozali kouta na makabo ya bolingo malamu ya bandeko na biso basi mpe mibali ya mikili lokola Belgique, France, mpe bongo na bongo. Baoyo bapesaka makabo kati na mikili wana bazali mpenza bakúmi te. Kasi ezali nde basambeli ya Yehova oyo bazali kopesa motuya na makambo ya elimo. Bazali kokanisa losambo ya Yehova na kolɛngɛláká mbala na mbala makabo mpo na ndako ya Yehova. (Talá 1 Kol. 16:2.) Ezali mibali mpe basi, bana, bilenge mpe mibangé, lolenge moko na baoyo bazali awa epai na biso.

3 Na ekeke ya liboso ya ntango na biso, ntoma Paulo apesaki lisangá ya Bafilipi longonya na maloba oyo: “Bino bozalaki na boboto mpo na kosangana na ngai kati na mpasi. Zambi ata na Tesaloniki, botindi kosunga bosɛnga na ngai koleka mbala moko.” (Filp. 4:14, 16) Tokoki mpe koloba bongo mpo na teritware na biso? Tokomonisa elimo malamu motindo wana? Moko na moko kati na biso akoki, mpe azali na mposa ya komonisa motuya mpo na makambo ya elimo na kopesáká makabo ya bolingo malamu? Na basanza oyo euti koleka, na ndakisa, makabo oyo mautaki na Zaïre mazalaki na mwayene ya NZ 180 na mosakoli. Nzokande, mpo na kokokisa mosolo nyonso oyo tosengeli kobimisa mpo na kosakolama ya nsango malamu na mboka na biso, mosakoli mokomoko asengeli nde kopesa na mwayene badolare 4,45.

4 Soki totaleli makambo touti kolobela, emonani ete tosengeli komitalela mpo na komona makoki mpenza ya teritware na biso, mpo na oyo etali kokokisa bosɛnga ya mosolo oyo mozali kobimisama mpo na mosala ya Bokonzi. Motindá malamu oyo tozali kokuta na mokanda ya mibale ya Paulo epai na Bakolinti, na mokapo ya mwambe, mosengeli kobenda likebi na biso. Soki tozali komonisa motuya na libaku malamu tozali na yango ya kosalela Yehova, tokopesa makabo mpe ‘engebene makoki na biso mpenza.’ (Molɔngɔ́ 3.) Mokomoko na biso asengeli komitalela, ‘mpamba te soki liboso mokano ezali, mokano yango ezali malamu engebene oyo moto azali na yango, kasi te engebene oyo azali na yango te.’

5 Tokoki kolongola na ‘mwa moke tozali na yango,’ mpo na kopesa na losambo ya pɛto? Tokoki komiloba ete: “Ngai, nalingi, kasi nazali na eloko te.” Mbala mosusu ekozala mpasi mingi mpo na bamoko koleka basusu. Bilenge mpe mibangé, mibali mpe basi, bana mpe mikóló, biso nyonso tokoki komitalela malamumalamu mpo na komona oyo tokoki kopesa mbala na mbala, na lolenge lobongi. Tómitungisa soko moke te mpo ete tokoki kopesa bobele mwa moke. (Talá 21:2-4.) Soki tozali kosala yango na bolingo nyonso, na motema na biso mobimba mpe na esengo nyonso, mpe soki baoyo bazali na makoki mingi bazali kopesa mingi, bokokani ekozala mpe ekotondisa oyo ezali kozanga epai na basusu.​—2 Kol. 8: 13, 14; 9:7.

6 Lisangani ya bankulutu na lisangá bakoki kosala mingi mpo ete ezaleli wana emonana mpe ekóla kati na lisangá. [Talá mpe makanisi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛ́mbɛ 1992, lokasa 8 mpe 9, paragrafe 8 kino 10 mpe lokasa 16, paragrafe 16 mpe 17, oyo ezali kolobela ndambo na zomi.] Bankulutu, bokosepela komonisa mwango moko na lisangá mpo na kotinda sanza na sanza likabo ya bolingo malamu na filiale? (Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Augústo 1994 likoló na lolenge ya kosalela mpo na kosɛnga na lisangá ete ezwa mokano mpo na likambo moko.) Motuya ya mosolo ekoki kokesana sanza moko na mosusu na meko oyo lisangá ezali kokóla na elimo mpe lolenge Yehova azali kopambola milende na yango.​—Mas. 10:22.

7 Soki tozali kopesa na esengo nyonso mpe na elimo ya bokabi mpo na kosimba losambo ya solo, tokopambolama. Tólanda elendiseli ya Masese 3:9, 10 oyo elobi ete: “Kumisá [Yehova] na biloko na yo, mpe na mbuma na liboso na bozwi na yo nyonso. Boye bibombelo na yo ikotonda maa.” Na bongo tokoki komonisa botɔ́ndi na biso mpo libaku malamu oyo Yehova apesi biso ya kosalela ye na mosala ya bulɛɛ. Na makabo ya bolingo malamu oyo mokomoko na biso azali kopesa, tozali kopesa mabɔkɔ mpo na kokólisa losambo ya pɛto kati na teritware na biso. Tómikundola mingimingi ete: na kosaláká bongo, tozali kokumisa Yehova na biloko na biso ya motuya.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto