Makita ya Mosala mpo na Apríli
Pɔ́sɔ ebandi na 1 Apríli
10 mn: Mayebisi ya lisangá mpe mayebisi matali Mosala na biso ya Bokonzi.
15 mn: “Tókumisa Yehova ‘mikolo nyonso.’” Ekosalema na mituna mpe biyano. Tángá baparagrafe 2-5, soki ntango epesi nzela. Lobelá mosala ya mobongisi-nzela mosungi mpe mobongisi-nzela ya sanza na sanza, na lolenge ya kotonga mpe ya kolendisa.
20 mn: “Tólakisa bazulunalo na mabaku nyonso.” Lisoló likosalema likoló na makanisi ya ntina. Na nsima lobelá mwa masoló mosusu oyo makoki kosalelama mpo na kolakisa bazulunalo ya sika oyo bozwaki na lisangá. Bilakiseli mibale to misato na kozwáká makanisi ya kolakisama oyo epesami na lokasa 4.
Loyembo 78 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 8 Apríli
10 mn: Mayebisi. Lapólo ya kɔ́nti.
20 mn: “Tózwa litomba na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na 1996—Eteni 3.” Lisukúlu likosalema na mokɛngɛli na eteyelo. Lendisá baoyo bakómi na makoki ete bákomisa nkombo na eteyelo, na nsima babongisa malamumalamu mikumba oyo mipesameli bango. Limbolá mibeko ya kobénga bankombo ya Biblia oyo mipesami kati na lisoló. Mpo na komonisa mibeko yango, okoki kozwa Luka 3:23-38 kati na libongoli lisembolami lisusu [soki lizali] mpe okoki kotánga mwa bankombo mosusu oyo eyakisami mbala moko longwa na Liebele, na ndakisa Yoanân, Salmôn, Qosam, Seroug, mpe bongo na bongo.
15 mn: “Liyangani ya etúká 1996—Mbongwana.” Libakema. Lisukúlu likosalema na mokɛngɛli-mokambi kobanda na paragrafe 1 kino paragrafe 5. Bɛtá nsɛ́tɛ́ likoló na matomba oyo makozwama na kolongolama ya departemá ya bilei.
Loyembo 211 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 15 Apríli
10 mn: Mayebisi. Baoyo batambwisaka boyekoli ya Biblia basengeli kolendisa bayekoli na bango oyo bazali kosala bokóli malamu ete bámityela mokano ya kokóma basakoli oyo bazwi naino batisimo te. Baboti bakoki mpe kosunga bana na bango lolenge wana. Kundolá lolenge ya kosala oyo emonisami polele na búku Lisanga mpo na kokokisa mosala ya Nzambe, na nkasa 98-100.
15 mn: “Liyangani ya etúká 1996—Mbongwana.” Libakema. Paragrafe 6 kino paragrafe 15. Ekosalema na mituna mpe biyano. Na mokomeli ya lisangá. Na ntango ya bosukisi, bendá likebi ya bayangani likoló na etánda “Lisungi mpo na kobosana te.” Bɛtá nsɛ́tɛ́ likoló na likambo litali kozala na makanisi mabongi na komemáká na liyangani bobele bilei mpe biloko mosusu oyo esengeli.
20 mn: “Tózala na mokano na ntango ya bozongeli na biso ya sika.” Lisoló oyo likomonisa mikano tosengeli kozala na yango ntango tozali kosala bozongeli ya sika. Bilakiseli mibale na basakoli ya makoki.
Loyembo 100 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 22 Apríli
5 mn: Mayebisi.
20 mn: Bamposa ya lisangá to lisukúlu na nkulutu moko likoló na lisoló “Kobimisa moto na lisangá—Ebongiseli ya bolingo?,” libimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yulí 1995, nkasa 25-27.
20 mn: Tókamba bato ya motema malamu na lisangá. Kozwáká makanisi kati na mwa búku Ba Témoins de Jéhovah—Basangani mpo na kosala mokano ya Nzambe na mokili mobimba, mokɛngɛli na mosala akotambwisa lisoló na kosololáká na basakoli mibale to misato. Limbolá mpo na nini ezali litomba koyebisa na bayekoli ya Biblia lolenge oyo lisangá lizali kotambwisama, lolenge oyo misala na yango ndenge na ndenge mibongisamaka mpe lolenge oyo bakoki kozwa na yango matomba. Talelá makambo oyo mazali na nkasa 14 mpe 15, na nsé ya motó ya likambo “Makita mazali kopesa simbisi na bolingo mpe na misala malamu.” Elakiseli mokuse na boumeli na yango etuluku bakolakisa lolenge oyo makanisi yango makoki kosalelama kati na lisoló moko na libaku ya bozongeli ya sika to na boyekoli ya Biblia, mpe na mokano ya kosunga moto moko ya motema malamu ete asosola ntina ya koyangana na makita.
Loyembo 126 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 29 Apríli
5 mn: Mayebisi matali lisangá.
20 mn: “Tókumisa Yehova na makabo na biso ya bolingo malamu.” Ekosalema na mituna mpe biyano, na nkulutu moko. Zalá na elimo ya mɔ́tɔ na ntango ozali kotambwisa eteni oyo. Na ntango ya botaleli ya paragrafe 6, nkulutu moko mpe mosaleli na misala moko bakosolola likoló na oyo etali ndambo na zomi, makanisi makouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛ́mbɛ 1992, nkasa 8 mpe 9, paragrafe 8 kino 10 na mpe lokasa 16, paragrafe 16 mpe paragrafe 17. Lendisá bandeko ete básosola likambo litali kopesa makabo ya bolingo malamu mpo na mosala ya Bokonzi.
20 mn: Tósala makambo na bomoko kati na libota. Na lisalisi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛ́mbɛ 1993, nkasa 16-19, mpe na elimo ya bosepeli, tata moko akosolola elongo na libota na ye likoló na ntina ya kosala makambo na bomoko. Tyá likebi mingi likoló na boyekoli mpe mosala ya kosakola na libota. Monisá mingi likambo oyo ete mabota “ya mikolo na biso” makabwanaka mpamba te basangani na yango balekisaka ntango mingi te elongo mpe basalaka makambo na bomoko te. Basangani ya libota ya boklisto bazwaka litomba: na koyekoláká Liloba ya Nzambe mpe na kosanganáká na mosala ya kosakola elongo. Bɛtá nsɛ́tɛ́ likoló na ntina oyo tata asengeli kobongisa malamu makambo wana mpe ete mama asalana elongo na ye. Bana basengeli kosepela na makambo ya elimo mpe kosalana elongo mpenza na baboti na bango. Libota likozala na bomoko mpenza mpe likozala makasi mpo na kopɛngola masɛnginya oyo mazali sé kokóma makasi oyo mazali na bopusi ya komekoláká lolenge ya bizaleli ya mokili.
Loyembo 7 mpe libondeli ya nsuka.