Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/96 nk. 3-4
  • Liyangani ya etúká 1996​—Mbongwana

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liyangani ya etúká 1996​—Mbongwana
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • “Kondima kati na liloba ya Nzambe”​​​—liyangani ya etúká 1997
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • “Tokumisa Nzambe na esengo nyonso”​—Liyangani ya etúká 1995
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • “Liloba ya esakweli ya Nzambe”​—Liyangani ya etúká mpo na 1999
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • ‘Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe’​—Liyangani ya etúká 1996
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 4/96 nk. 3-4

Liyangani ya etúká 1996​—Mbongwana

1 Ezali mpenza esengo soki tozali wana na ntango ya bilambo ya elimo, ezala na libaku ya makita ya lisangá to na mayangani ya zongazonga, na mayangani ya mokolo moko to na mayangani ya etúká. Mpo na nini bongo? Mpamba te kozala elongo na bato oyo babangaka Nzambe ezali liziba ya kolendisama mpe ete makambo ya elimo oyo malobelami makundwelaka biso makambo oyo maleki ntina.

2 Na boumeli ya mibu oyo miuti koleka, bankóto ya bato bayanganaki elongo na biso na ntango ya mayangani wana ya elimo, mpe bazali lisusu mingi koleka mpo na kosala yango. Kobanda 1985 kino 1995, motángo ya masangá elekaki na 49 716 kino 78 620. Lokola Yehova azali kokólisa nokinoki mosala ya koyanganisa, esengeli kobongisa mayangani mingi ya etúká mpe ya zongazonga. (Yis. 60:22) Bobele na teritware na biso, tokoki komona bokóli monene ya motángo ya masangá na mayangani ya etúká: mayangani 35 oyo masalemaki na 1995 mpe 18 oyo masalemaki na 1985. Mosala monene mpo na kolɛngɛla mpe kotambwisa malamu mayangani wana nyonso mozali sé kobakisama. Lokola toyanganaka mpo na kozwa litomba na elambo ya elimo, ezali malamu kosala mbongwana na makambo matali misala ya mosuni.

3 Esengeli kokamata bibongiseli ya sika: Tozali koluka mapamboli ya Yehova mpamba te tozali kokenda liboso. Tozali na esengo ya komona ete Yehova azali kopesa na basaleli na ye bwanya mpe mayele oyo bazali na yango mposa. Tosengeli koyeba ete na nzela ya moombo ya sembo mpe ya mayele, Yesu Klisto azali kotambwisa makambo na lolenge ya malamu mpenza, na boye ete mokano ya Yehova mókokisama na lolenge malamu koleka. (Mat. 24:45-47; Kols. 1:9, 10) Na bongo, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ekamati ekateli oyo tozali koyebisa bino: Kobanda na mayangani ya etúká na mobu 1996, mayangani ya zongazonga mpe mayangani ya mokolo moko ya Sɛtɛ́mbɛ 1996, departemá ya bilei ekozala lisusu te. Moto na moto akomema bilei mpe bimeli na ye.

4 Mbongwana oyo tozelaki: Na boumeli ya bambula oyo bilei ya pɛ́pɛ́lɛ́ bilambemaki mpe bisalelamaki, emonanaki mpenza ete biloko moke nde bizali na ntina. Mosala oyo mosalemaki na motema mobimba na baoyo nyonso bamimonisaki lokola basáli ya bolingo malamu mozali na motuya monene; babongi mpenza kozwa matɔ́ndi na biso. Kasi, kobanda sikawa, na lisalisi ya mbongwana oyo euti kosalema, bankóto ya bandeko basi mpe bandeko mibali oyo bapesaki lisungi na bango mpo na kotambwisa mituka, kosomba biloko, kolamba, kotinda mpe kokabola biloko, bakozala na likoki ya kopesa ntango na bango na mikano misusu ya ntina ya Teokrasi, mpe kozwa matomba na boninga ya bandeko na ntango ya mayangani. Lisusu, basáli ya bolingo malamu oyo bamipesaki kati na departemá ya bilei bakoki kopesa mabɔkɔ na misala mosusu, na ndakisa, na mosala ya koyamba bato mpe mosala ya kotya bopɛto. Na bongo, mokumba ya moko na moko ekokóma pɛ́pɛ́lɛ́ mpe ekozala lisusu na ntina te ete basáli ya bolingo malamu básala mosala nsima na mpokwa, na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ to na ntango manáka mazali kosalema, lolenge yango ezalaki mpo na departemá ya bilei.

5 Tósimba bibongiseli oyo bikamatami: La Société azali kopesa bino matɔ́ndi mingi, bandeko basi mpe bandeko mibali, mpo na lisungi na bino kitoko oyo, na boumeli ya bambula, bopesaki “na motema mobimba” kati na bibongiseli oyo bikamatamaki mpo na mayangani, bakisá mpe bibongiseli bitali mosala ya departemá ya bilei. (1 Nta. 29:9) Mpe ntembe ezali te ete bandeko basi mpe bandeko mibali oyo basalaki na bolingo malamu mpe na elimo ya komipesa, komonisáká bongo botɔ́ndi na bango na nzela misala, bakokóba komonisa elimo motindo wana.​—Mas. 11:25; Luka 16:9.

6 Esengeli kosala nini mpo na kolya: Na ntina na mbongwana oyo euti kosalema, esengeli ete mabota bamizwela, mpo na bango moko biloko oyo bakozala na yango mposa mpo na kolya na ntango ya bopemi ya midi. Topesaka motuya na matomba kitoko oyo tozali kozwa na manáká ya bilei ya elimo. Ekozala likambo ya mayele mpenza te ete tómitungisa mingi mpo na bilei ya mosuni. Na likambo yango, esengeli ete mokomoko na biso ‘amimekisa makambo makeseni.’ (Filp. 1:9, 10a) Tokomona ete soki tomemi mwa bilei ya pɛ́pɛ́lɛ́, tokotya likebi mozindo mpe tokozwa matomba mingi na manáká ya nsima ya midi. Yango wana moto na moto akomema bilei ya mindɔndɔ te, kasi ya vitamíni. Na ndakisa, tozali kokundwela bino ete, ntango aleisaki bibele, Yesu apesaki bango bobele lolenge mibale ya bilei: mámpa mpe mbisi.​—Mat. 14:16-20; talá Luka 10:42a.

7 Bopemi ya midi ekozala mwa mokuse koleka ya mayangani oyo maleka. Atako bongo, ntango ekozala mingi mpo na kolya bilei ya pɛ́pɛ́lɛ́ mpe kozwa matomba na boninga bamoko na bamosusu liboso ya kobanda manáka ya nsima ya midi. Bandeko basi mpe bandeko mibali oyo bafandaka na engumba oyo liyangani lizali kosalema, to na zingazinga na yango, mpe baoyo bazongaka epai na bango mpokwa nyonso, bakozala na mikakatano te mpo na kolɛngɛla mwa bilei mpo na mosangani mokomoko ya libota. Tokoki kosala lolenge moko na bana oyo bamemaka mwa mikate, mbuma, bisikíti mpe mwa bimeli na eteyelo. Bato mingi balyaka bilei motindo wana na bisika na bango ya mosala.

8 Ezali polele ete makambo nyonso makozala pɛtɛ te mpo na baoyo bautaka bipai mosusu. Esengeli na bango ete bálɛngɛla bilei ya kolya na midi. Basusu bakomona ete bilei ya pɛ́pɛ́lɛ́ lokola ndunda mpe mbuma ekozala malamu, mpe bakoki kokamata epai na bango oyo bakozala na yango mposa. Ekoki mpe kozala ete bakosomba mokolo na mokolo oyo basengeli na yango mpo na molei ya midi na zándo moko ya engumba epai oyo liyangani likosalema.

9 Lokola esika moko na moko ya liyangani ezali Ndako monene ya Bokonzi, tokosala na boye ete ntango ya bopemi ekóma te lokola tozali kosala píkiníki. Mpe lokola tolyaka te na ntango ya makita, tokolya te, tokomela mpe te na ntango liyangani lizali kosalema. Nzela epesami te mpo na komema bikwokolo ya ngalasi ya minene mpo na mabota na esika ya liyangani. Ekoki kozala likámá na kotyáká nkaká na milɔngɔ́ ya kotambola to kotondisáká bisika ya kofanda. Ekozala malamu kosalela kitunga ya plastíki to sasɛ́ mpo na komema bilei oyo bolɛngɛli mpo na kolya na midi. Soki esengeli, ekwokolo ya moke ya ngalasi oyo ekoki kokɔta na nsé ya efandeli ekoki kozala malamu. Kotya yango likoló na efandeli te. Na nsuka, tozali kokundola ete masanga makasi (vinyo, bière, mpe bongo na bongo) ebongi te komelama na liyangani ya boklisto.

10 Esengeli mpe kokeba na bityeli oyo bokomema na esika ya liyangani. Bokoki kosalela batermúsi mpo na bimeli ya mɔ́tɔ. Basaani ya mbɛ́lɛ́, ezala ya lolenge nini, ezalaka likámá. Epekisami na bisika mingi ya liyangani. Soki bosombi masanga ya mpiɔ́ oyo matyami na plastíki to na mondɔlu te, na yango bosengeli kobalola yango na bityeli ya moke oyo bikoki kopasuka te mpe bikoki kokɔ́ta na nsé ya efandeli.

11 Matomba mosusu: Tozali kososola bwanya nyonso ya mbongwana oyo esalemi. Biso nyonso tokozala na likoki ya kotya likebi mozindo na makambo ya elimo oyo makolobelama na masukúlu, yango ezali ntina ya solosolo oyo mayangani masalemaka. Tokozwa matomba na boninga ya bandeko na biso mibali mpe basi, mpe matomba ya manáka. Na yango, na esika ete tótika esika ya liyangani na ntango ya bopemi mpo na kokenda koluka eloko ya kolya epai mosusu, ekozala malamu ete tómema oyo tozali na yango mposa. Na bongo, tokolekisa ntango elongo na baninga na biso baklisto mpe tokozangisa ata lisukúlu moko te ya manáka ya nsima ya midi.

12 Nsima ya kolendisama malamu na elimo, basusu, elongo na mabota na bango mpe na baninga na bango, bakosepela mbala mosusu kozwa matomba na kolekisáká ntango elongo na bandeko mpe kosolola makambo oyo bayekolaki na mokolo wana na ntango bazali kolya mwa molei mobongi na restorá to na kafeteryá. Baoyo bakokoka, bakolinga mbala mosusu kozonga epai na bango mpo na kolya bilei ya mpokwa lokola basalaka yango mikolo misusu.

13 Tozali mpenza na esengo ya kozala wana na ntango ya bilambo ya elimo na mayangani. Kati na yango tozwaka mikanda ya sika, mateya ya ntina mpe batoli ebongi. Ezali matomba wana nde biso nyonso tomikundolaka. Tozalaka mpe na esengo ya kozala kati na basaleli mosusu ya Nzambe. Masese 10:22 elobi ete: “Mapamboli na [Yehova] ikoyeisa bozwi, akobakisa mawa na yango te.” Ezali bongo mpamba te, biso basaleli ya Yehova, toyanganaka te na mayangani na komisɛngisáká na makambo matali mosuni to kolukáká bomɛngɔ. Ezali mpo na mposa malamu ya kozwa matomba ya elimo na mayangani nde toyanganaka, mpe Yehova apesaka biso mbano mingi engebene ezaleli oyo tomonisaka.​—1 Tim. 6:6-8; Ebe. 11:6.

14 Mayangani ezalaka milulu ya kolendisa oyo ekundwelaka biso epai wapi tokómi kati na mosala ya kobuka mbuma na elimo. (Yoa. 4:35, 36) Mokapo 54 ya mokanda ya Yisaya mobandi na libyangi oyo lipesami na lisangá ya Yehova oyo likokisami na mwasi, libyangi ya komibongisa mpo na kozala na bokóli ya esengo. Lokola Yisaya asakolaki yango, mwasi wana asengelaki komizela na kokóla mingi, kokóma monene mpe kozwa nguya ya sika: “Fulisá na monene esika na hema na yo, tiká ete bilamba na efandelo na yo bisembolama; omiboya te, yeisá nkamba na yo molai mpe kembisá na makasi nsɛ́tɛ́ na yo. Mpo ete okopanzama na epai na mobali mpe na epai na mwasi.” Kokokisama ya esakweli yango ya kokamwisa ezali komonana na bokóli monene ya losambo ya pɛto lelo oyo.​—Yis. 54:1-4.

15 Ɛɛ, mbongwana ezali mpenza elembo ya bososoli malamu. Bayangani nyonso bakozala na likoki ya kozwa matomba na manáka ya elimo oyo makobongisama na ntango ya mayangani, mpe likebi na biso likopɛngwa mingi te. Tondimisami ete bibongiseli oyo bikopambolama na Yehova, mpamba te bikopesa nzela na kolónga malamu kati na bokóli. Na komipesáká na makambo oyo mazali na ntina, tokozwa matomba na mikolo ya esengo elongo na bandeko na biso mibali mpe basi, mpe tokotonda na makambo mingi na elimo. Tozali kobondela Yehova ete apambola milende nyonso oyo tozali kosala mpo na koya kolya na mesa ya Yehova.​—Talá Deteronome 16:14, 15.

[Etanda na lokasa 4]

Matomba oyo makozwama na kolongolama ya departemá ya bilei

◼ Mosala ekozala mingi te, liboso ya liyangani, na boumeli na yango mpe nsima na yango, yango ekopesa nzela na kozwa matomba koleka elongo na bandeko mibali mpe bandeko basi.

◼ Ekozala ata na esaleli moko te ya kobongisa mpo na departemá ya bilei.

◼ Bato mingi bakoki kozwa matomba na manáka ya elimo.

◼ Basáli ya bolingo malamu bakozala mingi mpo na misala misusu.

◼ Ntango ekozala mingi mpo na komipesa na mikano misusu ya Teokrasi.

Oyo tokoki koya na yango mpo na kolya

◼ Molei ya pɛ́pɛ́lɛ́, ya mindɔndɔ te mpe ya vitamíni.

◼ Mbuma, mámpa.

◼ Ekwokolo ya moke ya ngalasi, soki esengeli.

◼ Bimeli, jíi ya mbuma mpe mai kati na bityeli oyo bipasukaka te.

Oyo TOSENGELI TE koya na yango na esika ya liyangani

◼ Masanga makasi.

◼ Basaani ya mbɛ́lɛ́.

◼ Bikwokolo ya minene ya ngalasi mpo na mabota.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto