Makita ya Mosala mpo na Sɛtɛ́mbɛ
Pɔ́sɔ ebandi na 9 Sɛtɛ́mbɛ
10 mn: Mayebisi. Pesá mpe Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi oyo matali lisangá.
20 mn: “Tósakola nsango malamu kozanga kotika.” Lisukúlu mpe lisoló elongo na bayangani. Tángá mwa makanisi mazwami na búku Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible, lokasa 1216, par. 7.
15 mn: “Tósakola nsango malamu ya Bokonzi na lisalisi ya mwa babúku.” (par. 1-5) Salelá paragrafe ya liboso mpo na maloba ya kobanda lisoló. Pesá bakomantere ya kolendisa mpo na komonisa litomba ya mwa babúku Sepela na bomoi ya seko mpe “Tala” kati na mosala ya kosakola. Bongisá bilakiseli minei oyo ezongelami malamu mpo na komonisa lolenge tokoki kosalela mwa babúku oyo na ntango ya bokutani ya liboso to na bozongeli ya sika. Bilakiseli likoló na mwa búku Sepela na bomoi ya seko bikosalema na elenge mosakoli moko, oyo akozala elongo na tata na ye to mama na ye. Basakoli bakolinga mbala mosusu kolakisa mwa babúku mosusu na kolandáká makanisi mapesami.
Loyembo 136 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 16 Sɛtɛ́mbɛ
15 mn: Mayebisi. Pesá lapólo ya kɔ́nti. Lobelá makanisi ya kolendisa likoló na “Mitindo mikeseni ya kopesa makabo,” na kosaleláká Mosenzeli ya 1 Desɛ́mbɛ 1993, nkasa 29-31.
15 mn: “Tósakola nsango malamu ya Bokonzi na lisalisi ya mwa babúku.” (par. 6-8) Lobelá na mokuse makambo mazali na mwa búku Bokonzi. Bilakiseli na kolanda makanisi mapesami mpo na bokutani ya liboso mpe mpo na bozongeli ya sika. Lendisá mosakoli mokomoko na kozongela baoyo nyonso bandimaki mikanda.
15 mn: “Makabo mpo na mosala oyo la Société azali kosala na mokili mobimba ezali kopesa nzela na bokóli.” Lisukúlu ya kolendisa oyo ekosalema na nkulutu moko. Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Augústo 1996. Na lisalisi ya Annuaire, pesá mwa mitángo mizali komonisa bokóli ya mosala ya Bokonzi kati na bamoko na mikili oyo mimonisami.
Loyembo 9 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 23 Sɛtɛ́mbɛ
10 mn: Mayebisi. Talelá etánda “Biyano na mituna na bino.”
15 mn: “Nani akoki mpo na kosakola?” Nkulutu moko azali kosolola elongo na basakoli mibale to misato. Lobelá mingi likambo oyo ete tozali kozwa kobongisama malamu, oyo ezali kopesa biso nyonso tozali na yango mposa mpo na kozala baministre ya Nzambe. Tozali ata na ntina moko te ya komiyoka ete tokoki te mpo na kosakola.
20 mn: “Lolenge ya kozalisa bayekoli na lisalisi ya búku Boyebi.” Lisoló elongo na bayangani na paragrafe 17-26 ya siplemá ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yulí 1996. Bongisá mwa ntango mpo na kolobela makambo ya lisangá na bino oyo matali basakoli baye batambwisaka boyekoli na lisalisi ya búku Boyebi. Bakoki kolimbola na lolenge ya kolendisa motindo basalelaki makanisi mazwami kati na siplemá yango mpe na nini yango esalisaki bango na kotambwisa boyekoli ya Biblia oyo ezali kokende liboso. Lendisá basakoli nyonso na kobatela malamu siplemá yango mpe kotalela yango moto na moto mbala nyonso oyo bazali kobanda boyekoli ya sika.
Loyembo 189 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 30 Sɛtɛ́mbɛ
10 mn: Mayebisi. Talelá etánda “Liyangani ya sika ya mokolo moko.” Yebisá bibongiseli bikamatami mpo na mosala ya kosakola na nsuka ya pɔ́sɔ.
20 mn: Bómonisa bosepeli na kelasi ya bana na bino. Lisukúlu oyo ekosalema na nkulutu moko. Talelá makanisi mazwami kati na mwa búku Batatoli ya Yehova mpe Kelasi, nkasa 2-5, komonisáká ete tozali na botɔ́ndi mpo na kobongisama ya ntina mingi oyo ezali kopesama na eteyelo. Monisá lolenge nini kolimbola na mayele epai na balakisi ntina oyo mpo na yango tolandaka libosoliboso matomba ya elimo na esika ya koluka mosala moko boye oyo esɛngi kotánga kelasi mingi. Zongelá makanisi mazwami na “Bosukisi,” na lokasa 31. Lendisá baboti ete básalela makanisi oyo mapesami na Lamuká! ya 8 Sɛtɛ́mbɛ 1988, lokasa 11 (ebimeli ya Lifalansé).
15 mn: Mokanda oyo tokolakisa na Ɔkɔtɔ́bɛ. Tokosalela búku: La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création? Monisá ete búku oyo ezali kolobela makambo ndenge na ndenge. Mikapo 1-15 mimonisi na bozindo kozanga koyokana oyo bato bazali na yango na ntina na ebandeli ya bomoi awa na mabelé; mokapo 16 etuni motuna moko oyo ezali kobulunganisa bato nyonso: “Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi?”; mikapo 17-18 mizali kotonga kondima kati na Biblia lokola Liloba lipemami ya Nzambe mpe oyo ebongi na kotyela motema; mikapo 19-20 ezali kobenda likebi likoló na nsango malamu ya Bokonzi na ntina na bomoi awa na mabelé oyo makobongwana Paladiso mpe ezali kolimbola lolenge ya kozwa yango. Elakiseli: mosakoli moko ya makoki akosalela moko na makanisi mapesami mpo na kolakisa na mokuse búku Création. Tokoki kolakisa babúku Ndenge nini okoki kozala na bomoi na libota ya esengo mpe Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis soki yango ezali kati na libómbo ya mikanda ya lisangá.
Loyembo 113 mpe libondeli ya nsuka.