Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/96 lok. 2
  • Biyano na Mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na Mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Ndenge nini nakoki koyeba koloba liboso ya bato?
    Lamuká!—2004
  • Pesá Nzambe nkembo kasi moto te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Tózala na limemya epai na bazalani na biso​—Eteni ya liboso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 9/96 lok. 2

Biyano na Mituna na bino

◼ Tokosala nini soki ndeko oyo asengeli kopesa lisukúlu ya bato banso akómi te na makita na ngonga oyo ebongisami?

Ekómaka ete makambo makanelami te mápekisa ndeko moko na kokóma te na ngonga mpo na kopesa lisukúlu oyo elɛngɛlamaki. Soki bakanisi ete akoya mosika te, bankulutu bakoki komona malamu kobanda makita na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli; lisukúlu ya bato banso ekolanda na nsima. Kasi soki emonani polele ete molobi akoya te, mbala mosusu molobi mosusu ya lisangá akokoka kopesa moko na masukúlu oyo asilá kopesa liboso.

Manáka oyo ebongisami liboso malamumalamu ekopɛngola ete mikakatano motindo wana mibima. Ndeko oyo azali na mokumba ya kosala manáka ya masukúlu ya bato banso asengeli kokutana na molobi mokomoko soko pɔ́sɔ moko liboso mpo na kokundwela ye mokumba na ye. Akosalela libaku yango mpo na kokundwela ye ngonga oyo likita yango ekobanda, adrɛsi mpe nimero ya telefone ya Ndako ya Bokonzi, na kopesáká ye bandimbola nyonso oyo akozala na yango mposa mpo na kokóma. Molobi asengeli kokoma malamumalamu bandimbola yango. Asengeli kopesa motuya mingi na mokumba na ye mpe kokamata bibongiseli nyonso bisengeli mpo na kokokisa mokumba yango. Soki likambo moko likanelami te likómeli ye, asengeli nokinoki kokutana na ndeko oyo azali na mokumba ya kosala manáka ya masukúlu ya bato banso mpo ete ndeko mosusu akoka kosala lisukúlu na esika na ye. Nyonso esengeli kosalema liboso mpo na kopɛngola mabongwani ya mbalakaka. Soki molobi azwi bobele retard ya mwa miniti moke, akosala nyonso mpo na kotinda telefone na Ndako ya Bokonzi, na boye ete bandeko báyeba yango mpe bákamata ebongiseli mosusu.

Soki balobi ya masukúlu ya bato banso bazali mpenza kotya likebi na mikumba na bango, soki manáka ya malamu esalemi liboso, soki bokundoli ya malamu epesami libosoliboso mpe soki likebi lizali mpenza kotyama na likambo wana, na ntembe te, lisangá ekozala pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na lisukúlu ya bato banso oyo ezali kolendisa.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto