Tósalisa mabota ete bamibongisa mpo na bomoi ya seko
1 “Motaleli na makambo ya nkita moko alobaki epai na baoyo bazwaki mapolomi na eteyelo monene moko na Amerika ete lokoso ezali malamu. Okoki kozala moto na lokoso mpe ozali komiyoka malamu.” Tála oyo ezali komonisa mokili, epai kuna bazali komonisa moimi lokola mwango moko ya kobongisa avenire ya moto. Na kokesana, Yesu ateyaki ete moklisto asengeli ‘komiboya ye moko, zambi moto akozala na litomba nini, soko akozwa mokili mobimba nde akobungisa bomoi na ye?’ (Mat. 16:24-26) Mpo na kozala na bomoi ya seko na mikolo mizali koya, esengeli ete otambwisa bomoi na yo mobimba na boyokani na kokokisama ya mokano ya Nzambe, yango esengeli kozala mokano oyo eleki ntina ya mabota lelo oyo. (Nz. 143:10; 1 Tim. 4:8) Ezali likanisi oyo emonisami kati na mokapo ya nsuka ya búku Le secret du bonheur familial. Búku oyo ya sika ezali kosalisa bato na komona oyo ezali mpenza na ntina kati na bomoi mpe lolenge nini kosala mpo na bolamu ya mabota na bango. Wana tozali kolanda kosakola nsango malamu bipai nyonso, nini oyo tokoki koloba mpo na kolendisa baoyo tozali kokutana na bango ete batánga búku Bonheur familial? Talá mwa makanisi malandi:
2 Na ndako na ndako to na balabála, tokoki kobanda lisoló na lisalisi ya trakte “Bomoi malamu na libota.” Tokoki kotuna boye:
◼ “Bomoi ya mikolo oyo ezali eutelo ya mikakatano mingi, kasi okanisi ete atako bongo likoki ezali ya kozala na bomoi malamu mpenza ya libota? [Tótika moto yango ayanola.] Trakte oyo endimisi biso ete ezali bongo. Okosepela kotánga yango?” Soki moto yango andimi, tokoki kokoba koloba boye: “Lokola lisolo yango esepelisi yo, na ntembe te okosepela mpe na búku oyo ezali kopesa batoli ya sikisiki mpo na lolenge ya kozala na bomoi ya malamu kati na libota.” Tólakisa etanda ya makambo mazali na kati ya búku. Tóbeta nsɛ́tɛ́ likoló na mikapo oyo mitó na makambo na yango mizali kobenda likebi. Tófungola búku na lokasa 10 mpe tótánga molɔngɔ́ ya nsuka ya paragrafe 17 mpe tótánga paragrafe 18 mobimba. Tólakisa búku yango na koyebisáká ntalo na yango. Tólimbwela ye ete tokoki kosolola mingi lisusu mpo na likambo yango mpe tótuna ye soki tokoki kokutana ntango nini.
3 Tokoki kokoba lisoló yango ya bomoi ya libota ya esengo na kolobáká boye:
◼ “Nalingi kobenda likebi na yo likoló na likanisi moko ezali kati na búku oyo natikelaki yo; nakanisi ete likambo yango ekosepelisa yo. Mokapo ya nsuka ezali komonisa sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. [Tótánga paragrafe 2 ya lokasa 183.] Ozali komona ete lifungola ya bolamu ezali bongo kosalana elongo mpo na kokokisama ya mokano ya Nzambe. Tozali kosenga na bato ete bayekola Biblia na mabota mpo na koyekola koyeba mokano ya Nzambe mpe ete basalela yango kati na mabota na bango. Tozali koyekola Biblia na bato kozanga ete bafuta mpe boyekoli yango ezali koumela bobele mwa basanza. Soki opesi ngai nzela, nakomonisa yo lolenge yango esalemaka.” Tózongela ye na mwa búku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? to búku Boyebi, tópona oyo ebongi mpenza.
4 Soki tozali kosolola na baninga na biso ya kelasi na eteyelo to na bilenge na teritware, tokoki kobimisa motuna oyo elandi:
◼ “Ntina nini baboti mpe bana na bango bazali na yango ya kosolola ntango nyonso? [Tótika moto yango ayanola.] Talá oyo búku yango elobi na ntina na ‘kosolola ya sembo mpe ya polele.’ [Tótánga paragrafe 4 mobimba mpe molɔngɔ́ ya liboso ya paragrafe 5 na lokasa 65 ya búku Bonheur familial.] Baparagrafe oyo elandi ezali kopesa makanisi mabongi mpo na kobongisa lolenge ya kosolola kati na libota. Búku yango ezali na moto na likambo Le secret du bonheur familial. Soki osepeli kozwa búku yango mpe osepeli mpenza kotánga yango, nakoki kotikela yo yango, na mwa lipesi moke ya . . .” Tólimbola na molobani na biso ete tokosepela kokutana na ye lisusu mpo na koyeba makanisi na ye na makambo akotanga.
5 Tokoki kotonga likoló ya moboko oyo totyaki na lisoló na biso ya liboso elongo na elenge moko na ntina na kosolola kati na baboti mpe bana na kolobáká boye:
◼ “Nasepeli ete ozali kozwa na motuya kosolola malamu kati na libota. Mpo na yo, wapi likambo eleki ntina oyo baboti mpe bana basengeli kosolola?” Totika moto yango ayanola. Na nsima tofungola búku Bonheur familial na lokasa
68 mpe tótánga eyano oyo eteni ya liboso ya paragrafe 11 ezali kopesa. “Lolenge moko malamu ya kozwa boyebi ya Nzambe ezali ya koyekola Biblia pɔsɔ na pɔsɔ.” Tólakisa mwa búku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Tólimbola ete masoló 16 oyo mazali kati na yango mazali komonisa makanisi ya ntina ya Biblia. Tótánga maloba ya ebandeli oyo mazali na lokasa 2 mpe tótalela elongo na moto yango lisoló ya liboso.
6 Soki tozali kosakola na ndako na ndako, to mpe ntango mosusu kati na parke moko to na esika ya masano, tokutani na tata to mama ya libota, tokoki kolamwisa mposa na ye na kolobáká boye:
◼ “Nandimisami ete ondimi likanisi na ngai oyo ete ezali mpasi mingi kobɔkɔla bana lelo oyo. Na likanisi na yo, nini ekoki kobatela libota na yo na bopusi mabe? [Tótika moto yango ayanola.] Talá batoli ya bwanya oyo ngai moko nasepelaki na yango.” Tóbenda likebi likoló na ndakisa oyo ezwami na lokasa
90 ya búku Bonheur familial, na paragrafe 1, mpe tótánga paragrafe 2. Tómonisa na nini makanisi ya bokatikati oyo búku yango ezali kopesa ebongi mpo na kobatela mabota na bopusi mabe. Tósenga na moto yango ete tolingi kotikela ye búku moko mpe tokozongela ye mpo na koyanola na mituna oyo akoki kobimisa.
7 Ntango tozongeli tata to mama ya libota oyo andimaki búku “Bonheur familial,” tokoki kokoba lisoló na lolenge oyo elandi:
◼ “Mbala ya nsuka oyo tokutanaki, namonaki ete ozali mpenza komibanzabanza mpo na bana na yo mpe olingi kosala nyonso ekoki na yo mpo na kobatela bango na bopusi mabe. Ntango mosusu otangi naino te búku oyo natikelaki yo, kasi ezali na likanisi moko ya ntina oyo nasepeli kolakisa yo. [Tótánga paragrafe 19 na lokasa 59.] Mpo na kosala boyokani elongo na Nzambe, esengeli na biso koyekola koyeba ye na nzela ya Liloba na ye likomami, Biblia. Okosepela nalakisa yo ndenge toyekolaka Biblia na libota?”
8 Kati na mokili, bapesi toli bakoki te kolakisa mabota nzela ya bolamu; bakoki koyokisa bango mawa. Tókabola mpenza búku Bonheur familial, mpo ete Liloba ya Nzambe ekoka kosalisa bato ya lolenge nyonso ete babongisama mpo na bomoi ya seko na mikolo mizali koya.—1 Tim. 6:19.