Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/97 lok. 1
  • Tótya makambo maleki ntina na esika ya liboso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tótya makambo maleki ntina na esika ya liboso
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Masolo mosusu
  • Bakonzi ya mabota​​—⁠Bóbatela mimeseno malamu na makambo ya elimo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Mabota, bókumisa Nzambe na kati ya lisangá na Ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Bolamu nini okoki kozwa na makita ya Batatoli ya Yehova?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Makambo nini otyaka na esika ya liboso?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 10/97 lok. 1

Tótya makambo maleki ntina na esika ya liboso

1 Makambo nini mazali mpenza na ntina mpo na kolongɔ́nɔ́ ya elimo? Kati na makambo yango tokoki kotánga na ndakisa boyekoli ya moto ye moko, koyangana na makita, kolendendela kati na libondeli, kozala na baninga ya malamu mpe mosala ya kosakola. Tokoki kozala na kolongɔ́nɔ́ ya elimo te soki tozangi kobatela makambo wana ya ntina na esika ya liboso kati na bomoi na biso.

2 Nzokande, biso banso tozali kobunda mpo na kotɛmɛla bamposa ya mosuni mpe tozali bongo na mposa ya disipilini. (Gal. 5:17) Tosengeli kokanisa soko moke te ete tokozwa litomba na kolandáká bamposa na biso ya moimi. (Yil. 17:9) Na yango, soki tolingi kobatela motema na biso mpe komitika te komizimbisama, ezali mpenza na ntina ete tómitalelaka mbala na mbala.​​​—Mas. 4:23; 2 Kol. 13:5.

3 Tótalela motema na biso: Mpo na yango, tokoki komituna na bosolo mpenza mituna milandi: Nazali na mposa makasi ya kotánga Liloba ya Nzambe? (1 Pet. 2:2) Nazali kososola ntina ya koyangana na makita nyonso ya lisangá? (Ebe. 10:24, 25) Nazali nde kolendendela kati na libondeli? (Lom. 12:12) Nazali nde koluka baninga oyo bazali bato ya elimo? (Lom. 1:11, 12) Namipesaka mokumba ya kosakola nsango malamu? (1 Kol. 9:16) Soki eyano na biso ezali ɛɛ, yango ekomonisa ete tolingi mpenza kotya makambo maleki ntina na esika ya liboso.

4 Tótalela manáka na biso ya mokolo na mokolo: Nsima ya kotalela bamposa ya motema na biso mpe mpo na kosala na boyokani na botaleli yango, ebongi ete tomityela makambo maleki ntina na esika ya liboso kati na manáka na biso. Yango elimboli ete tokomibombela ntango mpo na kotánga Biblia mbala na mbala mpe nimero mokomoko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! mpe komibombela ntango mpo na kobongisa makita. Esengeli na biso ete tómibombela ntango mpo na libota, ezala mpo na boyekoli to mpo na kobondela elongo. Tótya ndelo na ntango oyo tozali kolekisa na televizyó to na ordinatere. Tiká ete tózwa ekateli ya koyangana na makita nyonso ya lisangá mpe tótya yango na esika ya liboso koleka eloko mosusu nyonso. Tómibongisa mpo na kosakola pɔ́sɔ na pɔ́sɔ elongo na libota na biso.

5 Ntembe ezali te ete soki tótye makambo maleki ntina na esika ya liboso kati na bomoi na biso, tokozala na esengo mpo na yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto