Boyekoli ya biblia oyo ezali kobimisa bayekoli
1 Mobali moko ya Etiopia, ye mokube, atunaki Filipo, oyo ‘ayebisaki ye nsango malamu na ntina na Yesu,’ motuna oyo ete: “Likambo nini ekopekisa ngai kobatisama?” (Mis. 8:27-39) Mokube yango azalaki liboso na bolingo makasi na makomi mapemami na Nzambe mpe, nsima wana Filipo asungaki ye na elimo, amonaki ete akokisaki masɛngami mpo na kokóma moyekoli. Kasi bato nyonso bandimisami te ete ezali mpenza ntina mpo na bango kotalela Makomami.
2 Likambo ya kosepelisa, lisangá ya Yehova ebimiseli biso mwa búku ya sika, oyo ezali na motó na likambo ete Un livre pour tous (Búku mpo na bato nyonso), oyo ezali kosɛnga na bato ete bátalela nsango ya Biblia mpo na ntango na biso. Makambo mazali kati na yango makoki kobenda likebi ya bato ya motema malamu, oyo mbala mosusu batángá kelasi, kasi bayebi makambo mingi te na ntina na Biblia. Mwa búku yango kitoko ebimisami mpo na kopesa bango mposa ya kotalela Biblia.
3 Ntango tobandi boyekoli ya Biblia, ekozala litomba mpo na biso ete tótalela lisusu makanisi kitoko oyo mabimisamaki na siplemá ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yulí 1996, oyo emonisaki lolenge ya kotambwisa boyekoli ya Biblia oyo ezali kobota mbuma na lisalisi ya búku Boyebi. Na boumeli ya boyekoli, tótya likebi na bokóli ya moto yango mpo na kososola makambo oyo tosengeli kopesa likebi mingi. Tólendisa ye ete abongisaka boyekoli liboso mpe atángaka mikapo ya Biblia. Biyano oyo ye akopesa na maloba na ye moko ekomonisa ete azali na botɔ́ndi mozindo mpo na solo. Mingimingi, baoyo batángaka mikanda mosusu ya la Société mpe bayanganaka mbala na mbala na makita bakólaka noki. Tólendisa ye ete ayebisaka makambo oyo ye azali koyekola epai ya bato oyo bazali zingazinga na ye. Na boboto nyonso, tólakisa ye oyo asengeli kosala mpo na kokóla na elimo. Tosengeli te koyekola libela na libela na bato oyo bazali kozwa likatami te. Bayekoli basengeli kozwa ekateli ya kosala boyekoli ya bango moko, kosimba solo ngwi mpe kokóla kino kopesa bomoto na bango epai na Nzambe mpe kozwa batisimo.
4 Na mabota mosusu, boyekoli ya Biblia ezalaka bobele moko te, mpo ete basangani mingi ya libota bayekolaka moto na moto na ngala na ye. Nzokande, na mabaku mingi, ekoki kozala malamu ete mosakoli asangisa bayekoli yango nyonso mpe atambwisa boyekoli ya libota, mpamba te yango ekosangisa libota na makambo ya elimo.
5 Yesu apesi biso etindá ya kozalisa bayekoli. (Mat. 28:19) Mpo na kokokisa yango, tosengeli kotambwisa boyekoli oyo ezali kopusa bato na bokóli kino bakokóma komituna ete: “Likambo nini ekopekisa ngai kobatisama?”